Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 47: Moyibi moko na Yisraele

Lisolo 47: Moyibi moko na Yisraele
Akana azali kobomba biloko oyo ayibaki

MOBALI oyo bozali komona awa azali kobomba elamba ya kitoko, eteni ya wolo mpe palata na mabele, na kati ya hema na ye. Azwi biloko yango na engumba Yeriko. Kasi, esengelaki kosala nini na biloko oyo ezalaki na Yeriko? Bozali koyeba lisusu?

Biloko wana esengelaki kobebisama, longola kaka wolo ná palata, yango esengelaki kotyama na esika ya kobomba biloko ya motuya ya hema ya Yehova. Kasi bato oyo bozali komona na elilingi oyo, batosi Nzambe te. Bayibi biloko ya Nzambe. Nkombo ya mobali yango Akana mpe bato mosusu wana ezali bato ya libota na ye. Tótala ndenge likambo yango esalemaki.

Ntango Akana ayibi biloko yango, na nsima, Yosua atindi bato bákende kobunda na mboka Ai. Kasi, kuna Bayisraele bakwei na etumba. Bato mosusu kutu babomamaki mpe basusu bakimi. Yosua azali na mawa makasi. Akwei elongi na nse mpe abondeli Yehova boye: ‘Mpo na nini otiki nzela ete likambo oyo ekómela biso?’

Yehova azongiseli ye ete: ‘Tɛlɛmá. Yisraele asali lisumu. Bazwi ndambo ya biloko oyo esengelaki kobebisama to kopesama na tabernakle ya Yehova. Bayibi elamba moko ya kitoko mpe babombi yango. Nakopambola bino kaka soki bobebisi biloko yango, mpe moto oyo ayibi yango.’ Na nsima, Yehova alobi ete akolakisa Yosua moyibi yango.

Bongo Yosua ayanganisi bato nyonso, mpe Yehova abimisi Akana. Akana yango andimi, mpe alobi ete: ‘Nasali lisumu. Namonaki elamba moko ya kitoko, mpe eteni ya wolo mpe ndambo ya palata. Nalulaki yango mpe nazwaki yango. Nabombi yango na mabele na kati ya hema na ngai.’

Ntango bayelaki Yosua biloko yango, alobaki na Akana ete: ‘Mpo na nini omemeli biso mpasi boye? Sikoyo Yehova mpe akomemela yo mpasi!’ Bongo bato nyonso babomaki Akana ná libota na ye mobimba na mabanga. Lisolo yango emonisi ete tosengeli ata moke te kozwaka biloko ya bato.

Nsima na yango, Bayisraele bakendeki lisusu kobundisa Ai. Na mbala oyo, Yehova asalisi bato na ye, mpe balongi etumba.

Yosua 7:1-26; 8:1-29.



Mituna

  • Na elilingi oyo, mobali oyo azali kobomba biloko ya ntalo oyo azwi na Yeriko nkombo na ye nani, banani bazali kosalisa ye?
  • Mpo na nini likambo oyo Akana ná libota na ye basali ezali mabe mpenza?
  • Yehova alobaki nini ntango Yosua asɛngaki ayeba mpo na nini Bayisraele bakwei na etumba oyo babundaki na Ai?
  • Likambo nini ekómelaki Akana ná libota na ye ntango bakendeki na bango epai ya Yosua?
  • Liteya nini ya ntina tozwi na ndenge oyo likambo ya Akana ekatamaki?

Mituna mosusu