Lisolo 53: Elaka ya Yefeta
EKÓMELÁ yo opesa elaka bongo ekóma mpasi kokokisa yango? Yango ekómelaki moto oyo bozali komona na elilingi awa, yango wana azali na mawa. Moto yango nkombo na ye Yefeta, mosambisi moko ya mpiko na Yisraele.
Yefeta azalaki na bomoi na ntango oyo Bayisraele batikaki kosambela Yehova, bazongeli kosala mabe. Bongo Nzambe akabi bango na mabɔkɔ ya bana ya Amone bányokola bango. Yango etindi Bayisraele bábelela Yehova na maloba oyo: ‘Tosaleli yo lisumu! Tobondeli yo, bikisá biso!’
Bato bayoki mawa mpo na mabe oyo bazali kosala. Bamonisi ete babongoli motema na ndenge bazongeli kosambela Yehova. Yango wana Yehova asalisi bango lisusu.
Bato baponi Yefeta akende kobunda na bana ya Amone. Yefeta alingi Nzambe asalisa ye na etumba. Yango wana apesi Yehova elaka oyo: ‘Soki osalisi ngai nalonga bana ya Amone, moto ya liboso oyo akobima na ndako na ngai mpo na kokutana na ngai ntango nakozonga nsima ya kolonga bana ya Amone, nakopesa yo ye.’
Yehova ayoki elaka Yefeta apesi mpe asalisi ye alonga. Ntango Yefeta azongi, boyebi moto ya liboso oyo ayaki koyamba ye? Mwana na ye ya mwasi, mpe azalaki kaka na mwana moko wana. Yango wana, Yefeta agangi ete: ‘Mawa, mwana na ngai. Opesi ngai mawa mingi mpenza! Napesaki Yehova elaka, mpe nakoki kozonga nsima te.’
Ntango mwana ya Yefeta ayoki elaka oyo tata na ye apesaki, ayoki mpe mawa. Mpo likambo yango ekotinda ye atika tata na ye ná baninga na ye, akende kosalela Yehova bomoi na ye mobimba na tabernakle oyo ezali na Shilo. Yango wana, ayebisi tata na ye boye: ‘Soki opesaki Yehova elaka, salá ndenge olobaki!’
Bongo mwana ya Yefeta akendeki na Shilo, mpe kuna, asalelaki Yehova bomoi na ye mobimba na tabernakle. Mbula na mbula, basi ya Yisraele bazalaki kokende kotala ye mpe kolekisa ntango malamu elongo na ye, mikolo minei. Bato balingaka mwana ya Yefeta mingi, mpo azalaki mosaleli malamu mpenza ya Yehova.
Mituna
- Yefeta azali nani, mpe azalaki na bomoi na ntango nini?
- Yefeta alakaki Yehova nini?
- Mpo na nini Yefeta ayokaki mawa ntango azongaki epai na ye nsima ya kolonga bana ya Amone?
- Mwana ya Yefeta alobaki nini ntango ayokaki elaka oyo tata na ye apesaki?
- Mpo na nini bato balingaka mwana ya Yefeta?
Mituna mosusu
- Tángá Basambisi 10:6-18.
Likebisi nini tosengeli kozwa na lisolo oyo elobeli kozanga bosembo ya Yisraele epai ya Yehova? (Bas. 10:6, 15, 16; Rom. 15:4; Em. 2:10)
- Tángá Basambisi 11:1-11, 29-40.
Ndenge nini toyebi ete lolenge oyo Yefeta apesaki mwana na ye lokola “likabo ya kotumba” elimboli te ete atumbaki mwana yango na mɔtɔ ndenge batumbaka likabo? (Bas. 11:31; Lev. 16:24; Mib. 18:10, 12)
Na lolenge nini Yefeta apesaki mwana na ye lokola likabo?
Liteya nini tokoki kozwa na elimo oyo Yefeta amonisaki mpo na elaka oyo apesaki Yehova? (Bas. 11:35, 39; Mos. 5:4, 5; Mat. 16:24)
Ndenge nini mwana ya Yefeta azali ndakisa moko malamu mpo na bilenge bakristo na likambo ya kosala mosala ya ntango nyonso na bomoi na bango mobimba? (Bas. 11:36; Mat. 6:33; Flp. 3:8)