Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 58: Davidi ná Goliate

Lisolo 58: Davidi ná Goliate

BAFILISTIA bayei lisusu kobundisa Yisraele. Bayaya misato ya Davidi bazali basoda ya Saulo. Yango wana, mokolo moko, Yese alobi na Davidi boye: ‘Memelá bandeko na yo mwa mbuma ná mampa. Mpe talá soki bazali malamu.’

Goliate

Ntango Davidi akómi na kaa, akei nokinoki na esika ya etumba mpo na kotala bandeko na ye. Na ntango yango, elombe moko ya Bafilistia, nkombo na ye Goliate, amati mpe abandi kofinga Bayisraele. Asalaki bongo mikolo ntuku minei (40), ntɔngɔ mpokwa. Azali kobelela ete: ‘Bópona moto moko aya kobunda na ngai. Soki alongi mpe abomi ngai, biso tokokóma baombo na bino. Kasi soki ngai nalongi mpe nabomi ye, bino bokokóma baombo na biso. Nazali kobɛtɛla bino ntembe, bópona moto moko aya tóbunda.’

Davidi atuni basoda mosusu ete: ‘Bakosala nini na moto oyo akoboma Mofilistia oyo mpe akolongola Yisraele nsɔni?’

Bazongiseli ye ete: ‘Saulo akopesa ye bozwi mingi. Mpe lisusu, akopesa ye mwana na ye ya mwasi mpo azala mwasi na ye.’

Bayisraele bazali kobanga Goliate mpo azali mbinga mpenza. Azali molai pene na mɛtrɛ misato, mpe soda moko azali komemela ye nguba.

Basoda mosusu bakei koyebisa Mokonzi Saulo ete Davidi alingi kobunda na Goliate. Kasi Saulo alobi na Davidi ete: ‘Okokoka te kobunda na Mofilistia oyo. Ozali naino mwana, kasi ye azali soda bomoi na ye mobimba.’ Davidi azongisi ete: ‘Ngai nabomá urse ná nkɔsi oyo ememaki bampate ya tata na ngai. Mpe Mofilistia oyo akozala lokola moko na yango. Yehova akosalisa ngai.’ Bongo Saulo alobi ete: ‘Kende, mpe tiká Yehova azala na yo.’

Davidi akiti na mokɛli mpe aponi mabanga mitano ya sɛlisɛli; atye yango na libenga na ye. Na nsima, azwi bilingongo na ye, akei kokutana na elombe yango. Ntango Goliate amoni ye, akamwe mpenza. Akanisi ete ekozala mpasi te aboma Davidi.

Davidi azali kobamba Goliate libanga

Goliate alobi ete: ‘Yo yaká awa, mpe nakopesa bandɛkɛ ná banyama nzoto na yo.’ Kasi Davidi azongisi ete: ‘Oyeli ngai na mopanga, na likɔnga ya monene mpe ya moke, kasi ngai, nazali koyela yo na nkombo ya Yehova. Lelo oyo Yehova akopesa yo na lobɔkɔ na ngai mpe nakoboma yo.’

Bongo Davidi alandi Goliate. Akamati libanga moko na libenga na ye, atye yango na bilingongo na ye mpe abwaki yango na makasi na ye nyonso. Libanga yango ekei kobɛta Goliate na motó, akwei, akufi. Ntango Bafilistia bamoni ete elombe na bango akwei, babaluki, bakimi. Bayisraele balandi bango mpe balongi etumba.

1 Samwele 17:1-54.



Mituna

  • Ntembe nini Goliate abɛtɛli mampinga ya Yisraele?
  • Goliate azali monene ndenge nini, mpe Mokonzi Saulo alobi ete akopesa moto oyo akoboma Goliate eloko nini?
  • Ntango Saulo ayebisi Davidi ete akokoka kobunda na Goliate te mpo azali naino mwana, Davidi alobi na ye nini?
  • Na eyano oyo Davidi apesi Goliate, ndenge nini Davidi amonisi ete azali kotyela Yehova motema na ye mobimba?
  • Ndenge ozali komona yango na elilingi, Davidi asaleli nini mpo na koboma Goliate, mpe nini ekómelaki Bafilistia nsima ya likambo wana?

Mituna mosusu