Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 56: Mokonzi ya liboso na Yisraele

Lisolo 56: Mokonzi ya liboso na Yisraele
Samwele azali kotya Saulo mafuta mpo akóma mokonzi

BÓTALA Samwele, azali kotya moto moko boye mafuta na motó. Na ntango wana, bazalaki kosala bongo mpo na komonisa ete moto yango aponami mokonzi. Yehova atindi Samwele atya Saulo mafuta na motó. Ezali mafuta moko ya nsolo kitoko mpenza.

Saulo akanisaki te ete akoki kozala mokonzi. Ayebisi Samwele ete: ‘Nazali moto ya Benyamina, libota oyo eleki moke na Yisraele. Mpo na nini olobi ete nakozala mokonzi?’ Yehova asepeli na Saulo mpo atuti ntolo te ete azali moto monene; yango wana aponi ye azala mokonzi.

Nzokande, Saulo azali mobola te, azali mpe moto mpamba te. Auti na libota ya bozwi mpe azali mobali kitoko mpenza. Longola yango, azali molai mpe aleki Bayisraele nyonso na molai. Apotaka mbangu makasi mpe azali elombe. Bato basepeli mingi ndenge Yehova aponi ye azala mokonzi; mpe bango nyonso babandi koganga ete: ‘Mokonzi azala na bomoi!’

Banguna ya Yisraele bazali ntango nyonso makasi. Bazali se konyokola bango. Mwa moke na nsima, ntango Saulo akómi mokonzi, Baamone bayei kobunda na Bayisraele. Kasi Saulo asangisi ebele ya basoda mpe alongi Baamone. Yango wana, bato basepeli mingi ndenge Saulo azali mokonzi.

Nsima ya bambula, Saulo ná basoda na ye balongaki banguna mbala ebele. Saulo azali mpe na mwana mobali moko ya mpiko, nkombo na ye Yonatane. Yonatane asalisi Bayisraele bálonga bitumba mingi. Bafilistia bazali kaka banguna ya liboso mpenza ya Bayisraele. Mokolo moko, bayei bankóto ebele mpenza kobunda na Bayisraele.

Atako likama ezalaki pene, Samwele alobi na Saulo azela ye kino akoya kopesa Yehova mbeka to likabo. Nzokande Samwele aumelaki. Saulo abangi noki Bafilistia bábanda etumba; yango wana, apesi mbeka yango ye moko. Ntango Samwele akómi, ayebisi Saulo ete atosi Yehova te, yango wana, ‘Yehova akopona moto mosusu azala mokonzi na Yisraele.’

Mokolo mosusu, Saulo atosi mpe Yehova te. Na yango, Samwele alobi na ye ete: ‘Ezali malamu otosa Yehova na esika opesa ye mbeka ya bampate ya kitoko. Lokola otosi Yehova te, Yehova akotika yo te ete ozala mokonzi ya Yisraele.’

Tozwi mateya mibale na lisolo oyo. Ya liboso, tosengeli kotosaka Yehova ntango nyonso. Ya mibale, ata moto malamu, ndenge Saulo azalaki liboso, akoki kobeba mpe kokóma moto mabe. Kasi biso tokolinga te kokóma bato mabe ndenge wana.

1 Samwele mokapo 9 tii 11; 13:5-14; 14:47-52; 15:1-35; 2 Samwele 1:23.



Mituna

  • Na elilingi oyo, Samwele azali kosala nini, mpe mpo na nini?
  • Mpo na nini Yehova alingaki Saulo, mpe Saulo azalaki moto ya ndenge nini?
  • Mwana ya Saulo ya mobali nkombo na ye nani, mpe mwana yango asalaki nini?
  • Nini etindaki Saulo apesa mbeka na esika azela ete Samwele aya kosala yango?
  • Mateya nini tokoki kozwa na lisolo ya Saulo?

Mituna mosusu