Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 62: Mikakatano na libota ya Davidi

Lisolo 62: Mikakatano na libota ya Davidi

NTANGO Davidi abandi koyangela na Yerusaleme, Yehova asalisaki basoda na ye bálonga bitumba ebele mpenza. Yehova alakaki ete akopesa Bayisraele mokili ya Kanana. Mpe sikoyo, na lisalisi ya Yehova, bazwi mokili nyonso oyo alakaki bango.

Davidi azali mokonzi malamu. Alingi Yehova. Nsima ya kozwa Yerusaleme, moko ya makambo ya liboso oyo asalaki yango oyo: ayei na sanduku ya kondimana ya Yehova na Yerusaleme. Alingi mpe kotonga tempelo mpo na kotya sanduku yango.

Kasi ntango Davidi akómi mokóló, asali libunga monene. Ayebi malamu ete ezali mabe kozwa eloko ya moto mosusu. Mokolo moko na mpokwa, Davidi azali kotambola na likoló ya ndako na ye, atali na nse amoni mwasi moko kitoko mingi. Nkombo na ye Bate-sheba, mwasi ya Uria, moko ya basoda na ye.

Davidi aluli mwasi yango mingi mpenza mpe atindi bato báya na ye na ndako na ye. Mobali na ye Uria azali na etumba. Davidi asangisi nzoto na Bate-sheba, mpe na nsima, azwi zemi. Likambo yango etungisi Davidi makasi, atindeli Yoabe, mokonzi ya basoda na ye, mokanda ete atya Uria na esika ya liboso na etumba mpo akufa. Lokola Uria akufi, Davidi abali Bate-sheba.

Yehova ayokeli Davidi nkanda makasi mpenza. Yango wana, atindeli ye mosakoli Natane ayebisa ye masumu na ye. Natane ye wana azali koyebisa Davidi. Davidi ayoki mawa mpenza mpo na mabe oyo asali, mpe abongoli motema; yango wana Yehova abomi ye te. Kasi Yehova alobi na ye ete: ‘Lokola osali mabe oyo, mobulu ekobimela yo na ndako na yo moko.’ Ya solo, likambo yango ebimiselaki Davidi mikakatano mingi mpenza.

Natane azali kopesa Davidi toli

Ya liboso, mwana oyo Bate-sheba aboti, akufi. Na nsima, Aminone, mwana mobali ya liboso ya Davidi, abebisi leki na ye ya mwasi Tamara. Abisalome, mwana mosusu ya Davidi, ayoki nkanda makasi na likambo yango, abomi Aminone. Na nsima, Abisalome ayokani na bato mingi mpe amikómisi mokonzi. Davidi alongi Abisalome na etumba, Abisalome abomami. Na ntembe te, Davidi akutanaki na mikakatano ebele mpo na likambo wana!

Kaka na ntango yango, Bate-sheba aboti mwana mobali, bapesi ye nkombo Salomo. Ntango Davidi akómi mobange mpe azali kobɛla, mwana na ye Adoniya ameki komikómisa mokonzi. Bongo Davidi atindi nganga-nzambe moko, nkombo na ye Zadoke, ete atya Salomo mafuta mpo na komonisa ete akozala mokonzi. Mwa moke na nsima, Davidi akufi, wana azalaki na mbula ntuku nsambo (70). Ayangelaki mbula ntuku minei (40). Sikoyo, Salomo akómi mokonzi ya sika na Yisraele.

2 Samwele 11:1-27; 12:1-18; 1 Bakonzi 1:1-48.



Mituna

  • Na lisalisi ya Yehova, likambo nini esalemi na mokili ya Kanana?
  • Likambo nini esalemi mokolo moko na mpokwa ntango Davidi azali kotambola na likoló ya ndako na ye?
  • Mpo na nini Yehova ayokeli Davidi nkanda makasi?
  • Na elilingi oyo, Yehova atindaki nani mpo ayebisa Davidi masumu oyo asalaki, mpe moto yango ayebisi Davidi ete nini ekokómela ye?
  • Davidi azwaki mikakatano nini?
  • Nani akómi mokonzi ya Yisraele nsima ya Davidi?

Mituna mosusu