Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 66: Yezabele, mwasi mabe

Lisolo 66: Yezabele, mwasi mabe

NSIMA ya liwa ya Yeroboame, bakonzi nyonso oyo bayangelaki bokonzi ya mabota zomi na Yisraele bazalaki mabe. Kasi Ahaba aleki mabe. Oyebi mpo na nini aleki mabe? Mingimingi mpo Yezabele, mwasi na ye, azali mabe mpenza.

Yezabele azali Moyisraele te. Azali mwana ya mokonzi ya Sidone. Lokola ye asambelaka Baala, abendi mobali na ye Ahaba ná ebele ya Bayisraele na losambo ya Baala. Mwasi yango ayini Yehova mpe abomisi basakoli na ye mingi. Basakoli mosusu bakei komibomba na mibenga mpo bábomama te. Soki Yezabele aluli eloko moko boye, akoki ata koboma moto kaka mpo azwa yango.

Mokolo moko, Ahaba azalaki na mawa makasi. Bongo Yezabele atuni ye ete: ‘Mpo na nini ozali mawamawa boye?’

Azongiseli ye ete: ‘Mpo na makambo oyo Nabote alobi na ngai. Nalingaki kosomba elanga na ye ya vinyo, kasi alobi ete nakoki kozwa yango te.’

Yezabele alobi ete: ‘Komitungisa te, nakozwela yo yango.’

Bongo Yezabele atindeli bankumu ya mboka oyo Nabote afandaka mikanda. Ayebisi bango ete: ‘Bókamata bato ya mpambampamba mpe báfunda Nabote ete alakeli Nzambe mpe mokonzi mabe. Na nsima, bóbimisa ye na pembeni ya engumba mpe bóbamba ye mabanga kino akokufa.’

Ntango Yezabele ayoki ete Nabote akufi, ayebisi Ahaba ete: ‘Sikoyo, kende kozwa elanga ya vinyo ya Nabote.’ Omoni te ete Yezabele asengeli mpenza kozwa etumbu mpo na mabe oyo asali?

Yezabele, mwasi ya mokonzi

Na ntango yango, Yehova atindi Yehu apesa mwasi yango etumbu. Ntango Yezabele ayoki ete Yehu azali koya, apakoli biloko ya monzɛlɛ na miso mpe amibongisi, mpo akóma kitoko. Kasi ntango Yehu akómi, amoni ye na lininisa, ayebisi mibali oyo bazali na ndako ya mokonzi ete: ‘Bóbwaka ye na nse!’ Babwaki ye na nse ndenge elilingi oyo ezali komonisa yango, mpe akufi. Ezali na ndenge wana nde Yezabele, mwasi mabe, akufaki.

1 Bakonzi 16:29-33; 18:1-4; 21:1-16; 2 Bakonzi 9:30-37.



Mituna

  • Yezabele nde nani?
  • Mpo na nini mokolo moko Mokonzi Ahaba azalaki mawamawa?
  • Mayele nini Yezabele asaleli mpo elanga ya vinyo ya Nabote ekóma ya mobali na ye Ahaba?
  • Yehova atindi nani mpo na kopesa Yezabele etumbu?
  • Ndenge okoki komona yango na elilingi, likambo nini esalemi ntango Yehu akómi epai ya Yezabele?

Mituna mosusu