Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 67: Yehoshafate atyeli Yehova motema

Lisolo 67: Yehoshafate atyeli Yehova motema

BOYEBI bato oyo? Bazali kosala nini? Bazali kokende etumba; mibali oyo bazali liboso bazali koyemba. Kasi bokoki komituna ete: ‘Mpo na nini bayembi bazali na mipanga te, makɔnga mpe te?’ Tólanda ndenge elekaki.

Bayisraele bazali kokende etumba

Yehoshafate azali mokonzi ya mabota mibale. Azali koyangela na mikolo oyo Mokonzi Ahaba ná mwasi na ye Yezabele bazali koyangela mabota zomi. Kasi Yehoshafate azali mokonzi malamu, lokola tata na ye Asa. Yango wana, na boumeli ya bambula ebele, bato oyo bazalaki na bokonzi ya mabota mibale na sudi, bazalaki na bomoi ya malamu mpenza.

Kasi sikoyo, likambo moko esalemi mpe ebangisi bato. Bayei koyebisa Yehoshafate ete: ‘Ebele ya basoda bauti na Moabe, na Amone mpe na etúká ya ngombangomba ya Seire, bayei kobunda na yo.’ Bongo Bayisraele bayei kosangana na Yerusaleme, mpo na kosɛnga Yehova lisalisi. Bakei na tempelo mpe kuna Yehoshafate abondeli boye: ‘Ee Yehova Nzambe na biso, tozali koyeba te oyo tokosala. Awa moto ya kosalisa biso liboso ya ebele ya basoda oyo bayeli biso azali te. Motema na biso ezali epai na yo.’

Yehova ayoki mpe atindi moko ya basaleli na ye ayebisa bato ete: ‘Etumba oyo ezali ya bino te, kasi ya Nzambe. Bino bokobunda te. Bino bótala kaka na miso, mpe bokomona ndenge Yehova akobikisa bino.’

Na mokolo oyo elandi, Yehoshafate ayebisi bato ete: ‘Bótyela Yehova motema!’ Bongo, atye bayembi liboso ya basoda, bazali kotambola mpe bazali kosanzola Yehova. Boyebi likambo oyo esalemaki ntango bakómi pene na esika ya etumba? Yehova atye banguna mobulu, mpe babomani bango na bango. Mpe ntango Bayisraele bakómi, bakuti kaka bibembe na mabele.

Yehoshafate azalaki na bwanya mpenza, yango wana atyelaki Yehova motema mobimba. Biso mpe tokomonisa ete tozali na bwanya soki tozali kotyela Yehova motema.

1 Bakonzi 22:41-53; 2 Ntango 20:1-30.


Mituna

  • Yehoshafate azali nani, mpe azalaki na bomoi na ntango nini?
  • Mpo na nini Bayisraele bazali kobanga, mpe mingi kati na bango basali nini?
  • Eyano nini Yehova apesi na libondeli ya Yehoshafate?
  • Yehova asali likambo nini liboso ete etumba ebanda?
  • Liteya nini tokoki kozwa na Yehoshafate?

Mituna mosusu