Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 71: Nzambe alaki paradiso

Lisolo 71: Nzambe alaki paradiso

TALÁ elilingi ya paradiso oyo Nzambe alakisaki mosakoli Yisaya. Yisaya akómaki mosakoli mwa moke nsima ya Yona.

Bato bazali na paradiso

Liloba paradiso elimboli “elanga” to “parkɛ.” Paradiso oyo bomoni awa ezali kotinda bino bókanisa nini? Ezali mpenza lokola elanga ya kitoko oyo Yehova asalelaki Adama ná Eva. Kasi, mokolo mosusu mabele mobimba ekokóma paradiso?

Yehova atindaki Yisaya akoma makambo ya paradiso oyo akosalela bato na ye. Alobaki boye: ‘Mbwa ya zamba ná mwana ya mpate, bakofanda esika moko na kimya. Mwana-ngɔmbɛ ná mwana-nkɔsi bakolya esika moko, mpe mwana moke akobatela bango. Ata mwana moke oyo azali kosakana mpenza pene na nyoka ya ngɛngɛ, akozwa likama te.’

Bato mingi bakanisaka ete ‘makambo ya ndenge wana ekoki kosalema ata moke te. Mobulu na mokili ebandá kala mpenza, mpe ekozala kaka bongo.’ Kasi kanisá naino: Esika Nzambe atyaki Adama ná Eva báfanda ezalaki ndenge nini?

Nzambe atyaki bango na paradiso. Lokola batosaki Nzambe te, esika yango ya kitoko ebebaki, bango moko bakómaki mibange mpe bakufaki. Nzokande Nzambe alaki ete akopesa bato oyo balingi ye nyonso oyo Adama ná Eva babungisá.

Na paradiso ya sika, mabe ekosalema ata moke te. Kimya ya solosolo ekozala kuna. Bato nyonso bakozala na esengo mpe na nzoto kolɔngɔnɔ. Makambo nyonso ekozala ndenge Nzambe alingaki ete ezala na ebandeli. Na lisolo mosusu, tokomona ndenge Nzambe akosala yango.

Yisaya 11:6-9; Emoniseli 21:3, 4.



Mituna

  • Yisaya azalaki nani, azalaki na bomoi ntango nini, mpe Yehova amonisaki ye nini?
  • Liloba “paradiso” elimboli nini, mpe ezali kotinda yo okanisa eloko nini?
  • Makambo nini oyo etali Paradiso ya sika Yehova atindaki Yisaya akoma?
  • Mpo na nini Adama ná Eva babungisaki esika na bango ya kitoko ya kofanda?
  • Yehova alaki baoyo bazali kolinga ye nini?

Mituna mosusu