Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 76: Babebisi Yerusaleme

Lisolo 76: Babebisi Yerusaleme

EKÓMI mbula koleka zomi banda Nebukadenezare azwá Bayisraele oyo baleki na mayele akei na bango na Babilone. Kasi talá likambo oyo ezali kosalema sikoyo. Yerusaleme ezali kozika na mɔtɔ. Mpe bakangi Bayisraele oyo babomami te bakei na bango na Babilone.

Kobosana te ete basakoli ya Yehova balobaki ete soki Bayisraele batiki bizaleli ya mabe te, makambo wana ekokómela bango. Kasi bayokelaki basakoli yango te. Bakobaki kosambela banzambe ya lokuta na esika ya kosambela Yehova. Yango wana, basengeli mpenza kozwa etumbu. Toyebi makambo yango mpo mosakoli Ezekiele ayebisi biso mabe oyo Bayisraele bazalaki kosala na ntango wana.

Ezekiele azali nani? Azali moko ya bilenge oyo Nebukadenezare akendeki na bango na Babilone mbula zomi koleka liboso ete bábebisa Yerusaleme. Ezali na ntango wana nde bakendeki mpe na Danyele ná baninga na ye misato, Shadrake, Meshake ná Abedenego, na Babilone.

Ntango mosakoli Ezekiele azali naino na Babilone, Yehova alakisi ye mabe nyonso oyo ezali kosalema na kati ya tempelo na Yerusaleme. Yehova alakisaki ye makambo yango na likamwisi. Ezekiele azali kaka na Babilone, kasi Yehova alakisi ye makambo nyonso oyo ezali kosalema na tempelo. Makambo yango esali ye mpasi mpenza.

Yehova ayebisi Ezekiele ete: ‘Talá makambo ya bosɔtɔ oyo bato bazali kosala awa na kati ya tempelo! Talá bifelo etondi na bililingi ya banyoka ná ya banyama mosusu. Mpe talá ndenge Bayisraele bazali kosambela yango!’ Ezekiele amoni makambo nyonso wana mpe akomi yango.

Bayisraele batiki Yerusaleme, bakei boombo

Yehova atuni ye ete: ‘Ozali komona makambo oyo bakambi ya Yisraele bazali kosala na kobombana?’ Ɛɛ, amoni yango mpe. Ezali na mibali ntuku nsambo (70) oyo bango nyonso bazali kosambela banzambe ya lokuta, mpe bazali koloba ete: ‘Yehova azali komona biso te. Yehova atiki mokili.’

Na nsima Yehova alakisi Ezekiele basi bafandi na porte ya nɔrdi ya tempelo. Bafandi kuna bazali kosambela Tamuze, nzambe ya lokuta. Talá mpe mibali mosusu bango wana na porte ya tempelo! Bazali soki ntuku mibale na mitano (25). Ezekiele amoni bango. Mibali yango bagumbami, bazali kotala na ngámbo ya ɛsti mpe bazali kosambela moi!

Yehova alobi ete: ‘Bato oyo bazali komemya ngai te. Basuki te kaka na kosala mabe, kasi bayei kosala yango mpenza na tempelo na ngai.’ Yango wana Yehova alaki ete: ‘Bakoyeba ndenge nkanda na ngai ekokitela bango. Nakoyokela bango mawa ata moke te ntango bakobomama.’

Kaka mbula misato nsima ya emonaneli yango oyo Yehova amonisi Ezekiele nde Bayisraele batombokeli Nebukadenezare, mpe ye ayei kobundisa bango. Bongo nsima ya mbula moko na ndambo, bato ya Babilone bakweisi bifelo ya Yerusaleme mpe bazikisi engumba yango. Bato ebele babomami mpe bakangi bamosusu bakei na bango na boombo na Babilone.

Mpo na nini Yehova atiki nzela ete Bayisraele bábomama na ndenge ya mabe boye? Ezali mpo baboyaki koyoka ye mpe batosaki mibeko na ye te. Yango emonisi biso ete, ezali malamu tósalaka ntango nyonso makambo oyo Nzambe alobi.

Liboso, kaka bato moke nde batikalaki na mokili ya Yisraele. Mokonzi ya Babilone atye Moyuda moko, nkombo na ye Gedalia, mokonzi na bango. Kasi Bayisraele mosusu babomi moto yango. Na nsima, babangi ete bato ya Babilone bakoya koboma bango nyonso mpo na mabe oyo basali. Bongo, bazwi Yirimia na makasi, bakimi na ye na Ezipito.

Yango wana, bato basilaki na mokili ya Yisraele. Moto moko te afandaki kuna na boumeli ya mbula ntuku nsambo (70). Mboka yango etikalaki mpamba mpenza. Kasi Yehova alaki ete nsima ya mbula ntuku nsambo, akozongisa bato na ye na mokili na bango. Bongo makambo nini ekómelaki libota ya Nzambe ntango bazalaki na boombo na Babilone? Tokomona yango na lisolo oyo elandi.

2 Bakonzi 25:1-26; Yirimia 29:10; Ezekiele 1:1-3; 8:1-18.



Mituna

  • Ndenge ozali komona yango na elilingi, likambo nini ekómeli Yerusaleme mpe Bayisraele?
  • Ezekiele azali nani, mpe makambo nini ya mabe mpenza oyo Yehova amonisaki ye?
  • Lokola Bayisraele batosaki Yehova te, ye alakaki nini?
  • Mokonzi Nebukadenezare asali nini ntango Bayisraele batombokeli ye?
  • Mpo na nini Yehova atiki nzela ete Bayisraele bábomama na ndenge ya nsɔmɔ boye?
  • Na ndenge nini mokili ya Yisraele etikalaki na bato te, likambo yango eumelaki mbula boni?

Mituna mosusu