Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Eteni 5: Banda na boombo na Babilone tii batongi lisusu bifelo ya Yerusaleme

Eteni 5: Banda na boombo na Babilone tii batongi lisusu bifelo ya Yerusaleme

Ntango Bayisraele bazali na boombo na Babilone, kondima na bango emekamaki mbala mingi. Shadrake, Meshake ná Abedenego babwakamaki na mɔtɔ ya makasi, kasi Nzambe abikisaki bango. Na nsima, ntango Babilone esilaki kokwea na mabɔkɔ ya Bamede ná Baperse, Danyele abwakamaki na libulu ya bankɔsi, kasi Nzambe abatelaki ye, akangaki minɔkɔ ya bankɔsi.

Na nsuka Siruse, mokonzi ya Perse, abimisaki Bayisraele na boombo. Bazongaki na mokili na bango, nsima ya kolekisa mbula ntuku nsambo (70) na boombo na Babilone. Ntango bakómaki na Yerusaleme, moko na misala na bango ya liboso ezalaki kotonga lisusu tempelo ya Yehova. Kasi mosika te, banguna na bango bapekisaki mosala yango. Yango wana, basilisaki kotonga tempelo yango mbula soki ntuku mibale na mibale (22) nsima ya kozonga na bango na Yerusaleme.

Na nsima, tokolobela mobembo oyo Ezera akendeki na Yerusaleme mpo na kobongisa tempelo. Ezalaki mbula ntuku minei na nsambo (47) nsima ya kosilisa kotonga tempelo yango. Bongo mbula zomi na misato nsima ya mobembo ya Ezera, Nehemia mpe akendeki na Yerusaleme mpo na kosalisa bato bátonga lisusu bifelo na yango oyo ebukanaki. Eteni ya MITANO elobeli makambo oyo esalemaki na boumeli ya mbula nkama moko na ntuku mitano na mibale (152).

Ezera ná bato bazali kobondela