Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 82: Mardekai ná Estere

Lisolo 82: Mardekai ná Estere

TÓZONGA naino nsima, mwa bambula liboso ya mobembo ya Ezera na Yerusaleme. Mordekai ná Estere bazali bato minene na bokonzi ya Perse. Estere azali mwasi ya mokonzi, mpe ndeko na ye Mordekai azali moto oyo aleki monene nsima ya mokonzi. Ebandi boni Bayisraele mibale oyo bákóma bato minene boye?

Baboti ya Estere bakufaki ntango azalaki naino mwana moke, bongo Mordekai abɔkɔlaki ye. Ahasueruse, mokonzi ya Perse, azali na ndako monene na Shushane mpe Mordekai azali moko ya basaleli na ye. Nzokande, mokolo moko, Vasheti mwasi ya mokonzi aboyi kotosa mokonzi, bongo, Ahasueruse aponi mwasi mosusu ete azala mwasi na ye. Boyebi mwasi ye aponi? Aponi Estere, elenge mwasi moko ya kitoko mpenza.

Hamane ayokeli Mordekai nkanda

Bomoni moto ya lolendo oyo bato bazali kogumbamela? Nkombo na ye Hamane. Azali moto monene na bokonzi ya Perse. Hamane alingi ete Mordekai, oyo afandi wana, atɛlɛma mpe agumbamela ye ndenge bato nyonso bazali kosala. Kasi Mordekai asali yango te. Ayebi ete ezali malamu te kogumbamela moto mabe wana. Hamane ayoki nkanda makasi. Bongo talá likambo asali.

Hamane akoseli Bayisraele makambo epai ya mokonzi. Alobi ete: ‘Bazali bato mabe, batosaka mibeko na yo te. Basengeli kobomama.’ Ahasueruse ayebi te ete mwasi na ye Estere mpe azali Moyisraele. Yango wana, ayokeli Hamane mpe atindi bábimisa mobeko ete, na mokolo moko boye, basengeli koboma Bayisraele nyonso.

Ntango Mordekai ayoki nsango ya mobeko yango, ayoki mpasi mingi. Atindeli Estere maloba ete: ‘Osengeli koyebisa mokonzi, mpe sɛngá ye ete abikisa biso.’ Nzokande, na mobeko ya Baperse, moto akoki kokɔta epai ya mokonzi te soki abengi ye te. Kasi Estere akɔti epai ya mokonzi atako babengaki ye te. Mpe ntango mokonzi amoni Estere, asemboleli ye lingenda na ye ya wolo, yango elakisi ete akobomama te. Estere abengisi mokonzi ná Hamane na fɛti epai na ye. Na fɛti yango, mokonzi atuni Estere eloko nini ye alingi kosɛnga. Estere alobi ete akoyebisa ye likambo yango soki ye ná Hamane bayei lisusu na fɛti lobi.

Na fɛti ya mibale, Estere alobi na mokonzi ete: ‘Ngai ná libota na ngai tokobomama biso nyonso.’ Mokonzi ayoki nkanda, mpe atuni ete: ‘Nani akani kosala likambo ya boye?’

Estere azongisi ete: ‘Ezali mobali oyo, Hamane, moto mabe mpe monguna!’

Estere, mwasi ya mokonzi, azali kofunda Hamane

Bongo mokonzi asiliki makasi, mpe atindi bato báboma Hamane. Na nsima, mokonzi atye Mordekai moto ya mibale na bokonzi, nsima na ye. Bongo Mordekai asali ete mobeko ya sika ebima, mpe epesa Bayisraele nzela ete bábunda mpo na kobatela bomoi na bango na mokolo oyo bakanaki koboma bango nyonso. Lokola sikoyo Mordekai akómi moto monene, bato mingi basalisi Bayisraele, mpe banguna babomi bango te.

Mokanda ya Estere

?>

Mituna

  • Mordekai ná Estere bazali banani?
  • Mpo na nini Mokonzi Ahasueruse alingi kobala mwasi mosusu, mpe aponi nani?
  • Hamane azali nani, mpe likambo nini epesi ye nkanda makasi?
  • Mobeko nini ebimi, mpe Estere asali nini ntango azwi nsango oyo euti epai ya Mordekai?
  • Nini ekómeli Hamane, mpe nini ekómeli Mordekai?
  • Ndenge nini Bayisraele babikisamaki na mabɔkɔ ya banguna na bango?

Mituna mosusu