Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 83: Bifelo ya Yerusaleme

Lisolo 83: Bifelo ya Yerusaleme
Mibali bazali kotonga lopango ya Yerusaleme

BÓTALA mosala oyo ezali kosalema awa. Bayisraele bazali lisusu kotonga bifelo ya Yerusaleme. Ntango Mokonzi Nebukadenezare abebisaki Yerusaleme esili koleka mbula nkama moko na ntuku mitano na mibale (152), akweisaki bifelo ya engumba yango mpe atumbaki baporte na yango. Kasi ntango Bayisraele bauti na Babilone, batongaki mbala moko bifelo na yango te.

Bato oyo bafandi na Yerusaleme bazalaki koyoka ndenge nini bambula nyonso oyo mboka yango ezalaki na bifelo te? Bazalaki kobanga. Banguna bakokaki kokɔtela bango mpe kobundisa bango. Kasi sikoyo, mobali oyo, Nehemia, azali kosalisa bato bátonga lisusu bifelo ya engumba na bango. Nehemia yango azali nani?

Nehemia azali Moyisraele moko oyo auti na engumba Shushane, epai Mordekai ná Estere bazalaki kofanda. Nehemia azalaki kosala na ndako ya mokonzi; mbala mosusu azalaki moninga ya Mordekai ná Estere, mwasi ya mokonzi. Kasi Biblia elobi te ete Nehemia asalelaki mobali ya Estere, mokonzi Ahasueruse. Asalelaki nde Artazerezese, oyo akómaki mokonzi nsima ya Ahasueruse.

Boyebi lisusu Artazerezese? Ye nde mokonzi malamu oyo apesaki Ezera mosolo mingi mpo akende na yango na Yerusaleme mpo na kobongisa tempelo ya Yehova. Kasi Ezera abongisaki bifelo ya engumba te. Tiká tótala ndenge nini ebandaki ete Nehemia asala mosala yango.

Mbula zomi na misato eleki banda Artazerezese apesá Ezera mbongo ya kobongisa tempelo. Sikoyo Nehemia azali mopesi-masanga ya Mokonzi Artazerezese. Elingi koloba, azalaki kopesa mokonzi vinyo mpe kokɛngɛla ete moto atyela ye pwazɔ te. Yango ezalaki mosala ya monene mpenza!

Nzokande mokolo mosusu Hanani, ndeko na ye, ná mibali mosusu bauti na Yisraele, bayei kotala ye. Bayebisi ye mikakatano oyo Bayisraele bazali kokutana na yango, bayebisi ye mpe ete bifelo ya Yerusaleme elali kaka na nse. Yango epesi Nehemia mawa makasi, mpe abondeli Yehova mpo na yango.

Mokolo moko, mokonzi amoni ete Nehemia azali mawamawa mpe atuni ye ete: ‘Mpo na nini ozali mawamawa boye?’ Bongo Nehemia azongisi ete, mpo Yerusaleme ebebi mingi mpe bifelo na yango ebukaná. Bongo, mokonzi atuni ye ete: ‘Olingi nini?’

Nehemia azali kolakisa ndenge bakotonga lopango

Nehemia alobi ete: ‘Tiká ngai nakende na Yerusaleme mpo natonga lisusu bifelo na yango.’ Mokonzi Artazerezese azali moto malamu mpenza. Apesi Nehemia nzela akende mpe asalisi ye azwa mabaya mpo na misala mosusu ya botongi. Ntango Nehemia akómi na Yerusaleme, mwa moke na nsima, ayebisi bato likanisi na ye. Basepeli na likanisi yango mpe balobi ete: ‘Tóbanda mosala!’

Ntango banguna ya Bayisraele bamoni ete mosala ya kotonga efelo ezali kokende liboso, balobi ete: ‘Tókende koboma bango mpe tósukisa mosala wana.’ Kasi lokola Nehemia ayoki ete basaleli bango likita, apesi bato oyo bazali kosala mosala mipanga ná makɔnga. Bongo alobi na bango ete: ‘Bóbanga banguna na biso te. Bóbundela bandeko na bino, bana na bino, basi na bino mpe bandako na bino.’

Bato yango bazali na mpiko. Bazali na bibundeli na bango esika moko, butu moi, mpe bazali kosala. Mpe nsima ya mikolo ntuku mitano na mibale (52), basilisi kotonga bifelo yango. Sikoyo, bato bakoki kofanda na kimya na kati ya engumba na bango. Nehemia ná Ezera bateyi bato mobeko ya Nzambe, mpe bato bazali na esengo.

Kasi makambo ezali lisusu te ndenge ezalaki liboso Bayisraele bákende boombo na Babilone. Sikoyo mokonzi ya Perse nde moto azali koyangela bango mpe basengeli kosalela ye. Kasi ata bongo, Yehova alaki ete akotinda mokonzi ya sika, mpe mokonzi yango akopesa bato kimya. Kasi mokonzi yango nde nani? Ndenge nini akotya kimya awa na mabele? Mbula soki nkama minei na ntuku mitano (450) elekaki liboso ete bato báyeba likambo yango. Na nsima, mwana moko oyo asengeli kokóma moto monene abotami. Kasi tokolobela lisolo yango nsima.

Nehemia mokapo 1 tii 6.



Mituna

  • Bayisraele bamiyokaki ndenge nini ntango bamonaki ete engumba ya Yerusaleme ezali na bifelo te?
  • Nehemia azali nani?
  • Nehemia asalaka mosala nini, mpe mpo na nini mosala yango ezali na ntina mingi?
  • Nsango nini epesi Nehemia mawa, mpe asali nini?
  • Na ndenge nini Mokonzi Artazerezese amoniseli Nehemia boboto?
  • Ndenge nini Nehemia abongisi mosala ya kotonga mpo banguna ya Bayisraele bápekisa yango te?

Mituna mosusu