Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 85: Yesu abotami na ndako ya bibwɛlɛ

Lisolo 85: Yesu abotami na ndako ya bibwɛlɛ

BOYEBI mwana moke oyo? Ɛɛ, ezali Yesu. Auti kobotama awa na ndako ya bibwɛlɛ. Bozali komona Maria, alingi kolalisa ye na elyelo ya bibwɛlɛ, esika batyelaka bampunda ná banyama mosusu bilei. Kasi mpo na nini Maria ná Yozefe bazali na kati ya ndako ya bibwɛlɛ? Kutu, oyo ezali esika babotaka bana te!

Ezali bongo. Kasi talá ntina bazali awa: Kaisala Augusto, mokonzi ya Roma, apesi mobeko ete moto nyonso akende kokomisa nkombo na mboka oyo abotamaki. Yozefe abotamaki awa na Beteleme. Kasi, ntango ye ná Maria bakómi, bazwi esika ya kolala na ndako ya bapaya te. Bongo bakei na ndako ya bibwɛlɛ. Mpe kaka na mokolo yango, Maria aboti Yesu. Mpe ndenge bozali komona yango, mwana azali malamu.

Yozefe, Maria, ná Yesu ntango auti kobotama

Bozali komona babateli ya mpate oyo bayei kotala Yesu? Na butu wana, bazalaki kobatela bampate na bango na esobe, mpe na mbala moko, bamoni kongɛnga moko boye. Anzelu moko abimeli bango. Babateli ya mpate yango babangi makasi. Kasi anzelu yango alobi na bango ete: ‘Bóbanga te! Nayeli bino nsango malamu. Lelo, na Beteleme, Kristo Nkolo abotami. Akobikisa bato. Bokokuta bazingi ye bilamba, balalisi ye na elyelo ya bibwɛlɛ.’ Na mbala moko, ebele ya baanzelu bayei mpe babandi kokumisa Nzambe. Ntango baanzelu balongwe, babateli ya mpate yango bakei noki koluka Yesu, mpe bamoni ye.

Boyebi mpo na nini Yesu azali lokola bato nyonso te? Ye azali mpenza nani? Kobosana te, na lisolo ya liboso na mokanda oyo, tolobelaki Mwana ya liboso ya Nzambe. Mwana yango asalaki elongo na Yehova mpo na kozalisa likoló, ná mabele ná biloko mosusu. Mwana yango nde Yesu!

Yehova azwaki bomoi ya Mwana na ye kuna na likoló, mpe atye yango na libumu ya Maria. Na mbala moko mwana abandi kokola na libumu ya Maria, kaka ndenge bana mosusu nyonso bakolaka na mabumu ya bamama na bango. Kasi mwana ya Maria azali nde Mwana ya Nzambe. Nsukansuka, Yesu abotami na ndako ya bibwɛlɛ na Beteleme. Sikoyo oyebi ntina oyo baanzelu bazalaki kosakola na esengo mingi kobotama ya Yesu?

Luka 2:1-20.



Mituna

  • Mwana moke oyo ozali komona na elilingi ezali nani, mpe Maria alalisi ye wapi?
  • Mpo na nini Yesu abotamaki na kati ya ndako ya bibwɛlɛ?
  • Na elilingi oyo, mibali oyo bazali kokɔta na ndako ya bibwɛlɛ ezali banani, mpe anzelu ayebisaki bango nini?
  • Mpo na nini Yesu azali na ntina mingi?
  • Mpo na nini Yesu akoki kobengama Mwana ya Nzambe?

Mituna mosusu