Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 89: Yesu apɛtoli tempelo

Lisolo 89: Yesu apɛtoli tempelo

BÓTALA Yesu, asiliki. Boyebi mpo na nini asiliki? Ezali mpo bato oyo bazali na tempelo ya Nzambe na Yerusaleme bazali bato ya lokoso mpenza. Bazali koluka mbongo na bango nde na mitó ya bato oyo bazali koya kosambela Nzambe.

Yesu azali kobwaka bamesa ya mbongo

Bozali komona bana-ngɔmbɛ, bampate ná bibenga wana? Bazali kotɛka bibwɛlɛ nyonso wana na kati ya tempelo. Mpo na nini? Mpo Bayisraele basengelaki na bandɛkɛ mpe na banyama yango mpo na kotumbela Nzambe mbeka.

Mobeko ya Nzambe elobaki ete, soki Moyisraele asali lisumu, asengeli kopesa Nzambe mbeka. Kasi, mobeko esɛngaki mpe bambeka mpo na ntina mosusu. Epai wapi Bayisraele bakokaki kozwa bandɛkɛ ná banyama ya kotumbela Nzambe mbeka?

Bayisraele mosusu bazalaki na bandɛkɛ mpe na banyama na bango, bongo bazalaki kopesa yango. Kasi bato mingi bazalaki na yango te. Bamosusu mpe bazalaki kofanda mosika na Yerusaleme, mpe bakokaki koya na banyama yango na tempelo te. Yango wana bazalaki kosomba kaka na tempelo. Kasi bato yango bazalaki kotɛka yango na ntalo makasi. Bazalaki mpe kobuba bato. Longola yango, basengeli kosala mombongo na bango na kati ya tempelo ya Nzambe te.

Yango nde ntina oyo Yesu asiliki. Yango wana abaloli bamesa ya bato oyo basenzaka mbongo mpe asopi mbongo na bango na nse. Asali mpe fimbo ya nsinga mpe abimisi banyama nyonso na tempelo. Na nsima, alobi na bato oyo bazali kotɛka bibenga ete: ‘Bólongola biloko oyo awa! Bótika kokómisa ndako ya Tata na ngai esika ya koluka mbongo.’

Bayekoli mosusu ya Yesu bazali elongo na ye na tempelo na Yerusaleme. Bakamwe mpenza na likambo oyo Yesu asali. Na nsima, bakanisi makambo oyo ekomami na Biblia, oyo elobeli Mwana ya Nzambe: ‘Bolingo ya ndako ya Nzambe ekozikisa ye lokola mɔtɔ.’

Ntango Yesu azali na Yerusaleme mpo na fɛti ya Elekeli, asali makamwisi mingi. Na nsima, Yesu alongwe na Yudea, azongi na Galile. Kasi, ntango azali kozonga, aleki na etúká ya Samaria. Tótala sikoyo likambo nini esalemi kuna.

Yoane 2:13-25; 4:3, 4.



Mituna

  • Mpo na nini bazali kotɛka banyama na tempelo?
  • Mpo na nini Yesu asiliki?
  • Ndenge okoki komona yango na elilingi, Yesu azali kosala nini, mpe atindi bato oyo bazali kotɛka bibenga básala nini?
  • Ntango bayekoli ya Yesu bamoni likambo oyo azali kosala, yango ekundweli bango nini?
  • Ntango Yesu azali kozonga na Galile aleki na etúká nini?

Motuna mosusu