Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 90: Yesu ná mwasi Mosamaria

Lisolo 90: Yesu ná mwasi Mosamaria

YESU azali kopema pene na libulu ya mai na Samaria. Bayekoli na ye bakei kosomba bilei na mboka. Na ntango yango, mwasi oyo Yesu azali kosolola na ye ayei kotoka mai. Yesu alobi na ye ete: ‘Pesá ngai mai ya komɛla.’

Yesu azali kosolola na mwasi Mosamaria

Mwasi yango akamwe mingi. Mpo na nini? Mpo Yesu azali Moyuda, ye Mosamaria. Bayuda mingi balingaka Basamaria te. Balingaka kutu kosolola na bango te. Kasi Yesu alingaka bato ya ndenge nyonso. Yango wana alobi na mwasi yango ete: ‘Soki yo oyebaki nani oyo azali kosɛnga yo mai ya komɛla, olingaki kosɛnga ye mpe ye alingaki kopesa yo mai oyo epesaka bomoi.’

Mwasi yango alobi na ye ete: ‘Libulu ezali mozindo, mpe yo ozali ata na katini te. Okozwa mai yango oyo epesaka bomoi wapi?’

Yesu alimboleli ye ete: ‘Soki omɛli mai ya liziba oyo, okoyoka mposa ya mai lisusu. Kasi mai oyo ngai nakopesa ekoki kopesa moto bomoi ya seko.’

Mwasi yango alobi na ye ete: ‘Tata, pesá ngai mai yango. Bongo nakoyoka mposa ya mai lisusu te. Mpe nakobanda lisusu koya kotokatoka mai awa te.’

Mwasi yango akanisi ete Yesu azali kolobela mai mpenza. Nzokande azali kolobela nde mateya ya solo oyo etali Nzambe mpe Bokonzi na ye. Mateya yango ezali lokola mai oyo epesaka bomoi. Ekoki kopesa moto bomoi ya seko.

Sikoyo, Yesu alobi na mwasi yango ete: ‘Kende kobenga mobali na yo mpe yaká awa.’

Mwasi yango azongisi ete: ‘Nazali na mobali te.’

Yesu alobi na ye ete: ‘Olobi solo. Mpo ozwá mibali mitano, mpe oyo ozali na ye sikoyo azali mobali na yo te.’

Makambo yango ekamwisi mwasi wana, mpo yango nyonso ezali mpenza solo. Ndenge nini Yesu ayebi yango? Yesu ayebi yango mpo azali moto oyo Nzambe alobaki ete akotinda; mpe lisusu, Nzambe moto ayebisi ye yango. Ntango bazalaki naino kosolola, bayekoli na ye bayei; bakamwe ete Yesu azali kosolola na mwasi Mosamaria.

Lisolo oyo eteyi biso nini? Eteyi biso ete Yesu azali kosalela bato ya ndenge nyonso makambo ya malamu. Biso mpe tósalaka bongo. Tosengeli kokanisa te ete bato boye bazali mabe kaka mpo bazali bato ya ekólo mosusu to mpe ya mposo mosusu. Yesu alingi ete bato nyonso báyeba solo oyo ememaka na bomoi ya seko. Biso mpe tosengeli kosalisaka bato báyeba solo yango.

Yoane 4:5-43; 17:3.



Mituna

  • Mpo na nini Yesu apemaki na libulu ya mai na Samaria, mpe azali koloba nini na mwasi moko na esika yango?
  • Mpo na nini mwasi yango akamwe, Yesu alobi na ye nini, mpe mpo na nini alobi bongo?
  • Mwasi yango akanisi ete Yesu azali kolobela mai ya ndenge nini, kasi Yesu azali kolobela mpenza mai ya ndenge nini?
  • Mpo na nini mwasi yango akamwe ndenge Yesu ayebi makambo na ye, mpe Yesu ayebaki makambo yango ndenge nini?
  • Liteya nini tokoki kozwa na lisolo ya mwasi Mosamaria oyo?

Mituna mosusu