Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 86: Bato balandi monzoto

Lisolo 86: Bato balandi monzoto
Banganga-minzoto

BOZALI komona monzoto oyo ezali kongɛnga, oyo moto moko alakisi yango mosapi? Monzoto yango emonanaki ntango balongwaki na Yerusaleme. Bato oyo bauti na Ɛsti, bayekolaka minzoto. Bazali na elikya ete monzoto yango ekolakisa bango esika moto moko ya ntina mingi azali.

Ntango bakómi na Yerusaleme, batuni ete: ‘Wapi mwana oyo akozala mokonzi ya Bayuda?’ “Bayuda” ezali nkombo mosusu ya Bayisraele. Bato yango balobi ete: ‘Tomonaki monzoto na ye ntango tozalaki na Ɛsti mpe toyei kosambela ye.’

Ntango Erode, oyo azali mokonzi na Yerusaleme ayoki nsango yango, ayoki nkanda. Alingi te ete mokonzi mosusu azwa esika na ye. Yango wana, abengisaki banganga-nzambe minene mpe atuni bango ete: ‘Epai wapi mokonzi oyo alakamaki asengeli kobotama?’ Bango balobi ete: ‘Biblia elobi ete na Beteleme.’

Bongo Erode abengi bato yango oyo bauti na Ɛsti mpe ayebisi bango ete: ‘Bókende koluka mwana yango. Soki bomoni ye, bóya koyebisa ngai. Ngai mpe nalingi nakende kosambela ye.’ Nzokande, Erode alingaki nde koboma ye.

Bongo monzoto yango ekei na Beteleme liboso ya banganga-minzoto yango, mpe ekei kotɛlɛma esika mwana yango azali. Ntango bakɔti na ndako, bamoni Maria ná Yesu. Babimisi makabo oyo bayei na yango, bapesi Yesu. Na nsima, Yehova akebisi bango na ndɔtɔ ete bázongela Erode te. Yango wana, bazongi na mokili na bango na nzela mosusu.

Ntango Erode ayoki ete bato yango oyo bautaki na Ɛsti bazongi epai na bango, ayoki nkanda makasi. Yango wana, apesi mitindo ete báboma bana mibali nyonso na Beteleme, banda na mbula mibale tii na nse na yango. Kasi Yehova akebisaki Yozefe na ndɔtɔ liboso, mpe Yozefe akamati mwasi na ye ná mwana, bakimi na Ezipito. Na nsima, ntango Yozefe ayoki ete Erode akufi, azwi Maria ná Yesu mpe bazongi na Nazarete. Kuna nde esika Yesu akolaki.

Nani abimisaki monzoto yango ya sika oyo ezalaki kongɛnga? Tóbosana te ete, nsima ya komona monzoto yango, bato wana bakendeki liboso nde na Yerusaleme. Satana Zabolo alingaki koboma Mwana ya Nzambe, mpe ayebaki ete Erode, moto oyo azali mokonzi na Yerusaleme, akoluka koboma ye. Yango emonisi polele ete Satana nde moto abimisaki monzoto wana.

Matai 2:1-23; Mika 5:2.



Mituna

  • Bato oyo ozali komona na elilingi bazali banani, mpe mpo na nini moko na bango azali kolakisa mosapi na monzoto oyo ezali kongɛnga?
  • Mpo na nini Mokonzi Erode amitungisi, mpe asali nini?
  • Monzoto wana oyo ezalaki kongɛnga ememi bato wana wapi, kasi mpo na nini bazongi na mboka na bango na nzela mosusu?
  • Erode apesi mitindo nini, mpe mpo na nini apesi yango?
  • Yehova ayebisi Yozefe asala nini?
  • Nani abimisaki monzoto wana ya sika, mpe mpo na nini abimisaki yango?

Motuna mosusu