Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 93: Yesu aleisi ebele ya bato

Lisolo 93: Yesu aleisi ebele ya bato

LIKAMBO ya nsɔmɔ euti kosalema. Babomi Yoane Mobatisi. Erodiadi, mwasi ya mokonzi, azalaki kolinga ye te. Yango wana, asɛngaki mokonzi ete atinda bato bákata Yoane motó.

Ntango Yesu ayoki nsango yango, ayokaki mawa mingi. Alongwe, akei na esika oyo bato bazali te. Kasi ebele ya bato balandi ye. Ntango Yesu amoni ebele yango ya bato, ayokeli bango mawa. Yango wana, abandi koteya bango makambo ya Bokonzi ya Nzambe mpe kobikisa baoyo bazali kobɛla.

Ntango mpokwa ekómi, bayekoli na ye bayebisi ye ete: ‘Ngonga epusani, mpe esika oyo bato bazali te. Tiká ebele ya bato oyo bázonga, bákende na bamboka ya pembenipembeni kosomba biloko ya kolya.’

Yesu azali koleisa ebele ya bato

Kasi Yesu alobi na bango ete: ‘Bakokende te. Bino nde bópesa bango eloko ya kolya.’ Na nsima, atali Filipe mpe atuni ye ete: ‘Tokosomba mampa wapi mpo tóleisa bato oyo nyonso?’

Filipe azongiseli ye ete: ‘Ekosɛnga mbongo mingi mpo moto na moto azwa mwa ndambo.’ Bongo Andre alobi na ye ete: ‘Mwana mobali oyo, oyo amemelaka biso biloko, azali na mampa mitano ná mbisi mibale. Kasi ekokoka bato nyonso oyo te.’

Yesu alobi na bango ete: ‘Bóyebisa bato báfanda na matiti.’ Na nsima, apesi Nzambe matɔndi mpo na bilei mpe abandi kobuka yango. Bongo bayekoli na ye bakaboleli bato mbisi ná mampa yango. Mibali nkóto mitano (5 000) bazalaki wana, longola ebele ya basi ná bana. Bango nyonso balei mpe batondi. Mpe bayekoli balɔkɔti biteni oyo etikalaki mpe batondisi kitunga zomi na mibale mɛkɛ.

Nsima na yango, Yesu atindi bayekoli na ye bákɔta na masuwa bákatisa Mbu ya Galile. Nzokande, na butu yango mopɛpɛ ezalaki makasi, mpe mbonge ezali komema masuwa epai na epai. Bayekoli bazali kobanga makasi. Na mbala moko, na katikati ya butu, bamoni moto azali koya epai na bango, azali kotambola likoló ya mai. Bagangi na nsɔmɔ mpo bayebi te eloko oyo bazali komona.

Kasi Yesu alobi na bango ete: ‘Ezali ngai. Bóbanga te.’ Kasi bandimi mpenza te. Bongo Petro alobi na ye ete: ‘Nkolo, soki ezali mpenza yo, lobá na ngai natambola likoló ya mai naya esika ozali.’ Yesu alobi: ‘Yaka!’ Petro akiti na mai mpe abandi kotambola likoló na yango. Na nsima abangi mpe abandi kozinda, kasi Yesu abikisi ye.

Mokolo mosusu, Yesu aleisi mpe ebele ya bato. Mbala oyo aleisi bango na mampa nsambo ná mwa mbisi moke. Na mbala wana mpe, bato nyonso balei batondi. Ezali mpenza esengo ndenge Yesu azali kokokisa bamposa ya bato! Ntango akoyangela, tokozanga eloko te.

Matai 14:1-32; 15:29-38; Yoane 6:1-21.



Mituna

  • Likambo nini ya nsɔmɔ ekómelaki Yoane Mobatisi, mpe Yesu amiyokaki ndenge nini?
  • Ndenge nini Yesu aleisi ebele ya bato oyo balandaki ye, mpe biloko oyo etikali ezali kitunga boni?
  • Mpo na nini bayekoli babangi na butu, mpe eloko nini ekómeli Petro?
  • Ndenge nini Yesu aleisi lisusu ebele ya bato mpo na mbala ya mibale?
  • Mpo na nini makambo ekotambola malamu ntango Yesu, Mokonzi oyo Nzambe atye, akoyangela mabele?

Mituna mosusu