Lisolo 94: Alingi bana mike
BÓTALA Yesu asimbi mwana mobali ya moke. Yesu alingi mpenza bana mike. Bato oyo bazali kotala ye ezali bantoma na ye. Azali koloba na bango nini? Tótala naino likambo nini elekaki.
Yesu ná bantoma na ye bauti mobembo molai. Na nzela, bantoma bawelanaki. Bongo nsima ya mobembo, Yesu atuni bango ete: ‘Likambo nini bozalaki kowelana nzelanzela?’ Na ntembe te, Yesu ayebi malamu ntina oyo bazalaki kowelana. Kasi alingi ayeba soki bango moko bakoyebisa ye yango.
Bantoma bafandi nyɛɛ, mpo nzelanzela bazalaki kowelana mpo na koyeba nani aleki na kati na bango. Bantoma mosusu bazalaki na mposa ya koleka baninga. Kasi ndenge nini Yesu akoyebisa bango ete ezali malamu te koluka koleka baninga?
Abengi mwana mobali ya moke mpe atɛlɛmisi ye liboso na bango. Na nsima, alobi na bayekoli na ye ete: ‘Nalingi bóyeba likambo oyo: Soki bobongwani te mpe bokómi lokola bana mike te, bokokɔta na bokonzi ya Nzambe ata moke te. Moto monene na kati ya bokonzi ya Nzambe ezali nde moto oyo akómi lokola mwana oyo.’ Mpo na nini Yesu alobi bongo?
Alobi bongo mpo bana mike bamitungisaka te mpo na koleka baninga to kozala bato minene. Na yango, bantoma mpe basengeli koyekola kozala lokola bana mike, mpe kotika koswana mpo na koyeba nani aleki na kati na bango.
Yesu amonisaki mpe mbala mingi ete alingaka bana mike. Mwa basanza eleki, bato moko boye bayeli ye bana na bango. Bantoma balingi kopekisa bango. Kasi Yesu alobi na bango ete: ‘Bótika bana mike báya epai na ngai, mpe bópekisa bango te, mpo bokonzi ya Nzambe ezali ya bato oyo bazali lokola bango.’ Yesu akamati bana na mabɔkɔ na ye mpe apamboli bango. Ezali mpenza esengo koyeba ete Yesu alingi bana mike.
Matai 18:1-4; 19:13-15; Marko 9:33-37; 10:13-16.
Mituna
- Nzelanzela ntango bantoma bazali kouta mobembo molai, bazali kowelana mpo na likambo nini?
- Mpo na nini Yesu abengi mwana moko ya moke mpe atɛlɛmisi ye na katikati ya bantoma?
- Na ndenge nini bantoma basengeli kozala lokola bana?
- Mwa basanza na nsima, ndenge nini Yesu amonisi ete alingaka bana?
Mituna mosusu
- Tángá Matai 18:1-4.
Mpo na nini Yesu azalaki koteya na bandakisa? (Mat. 13:34, 36; Mrk. 4:33, 34)
- Tángá Matai 19:13-15.
Wapi bizaleli ya bana mike oyo tosengeli komekola soki tolingi ete tózwa mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe? (Nz. 25:9; 138:6; 1 Ko. 14:20)
- Tángá Marko 9:33-37.
Yesu ateyaki bayekoli na ye nini na likambo ya koluka esika ya lokumu? (Mrk. 9:35; Mat. 20:25, 26; Gal. 6:3; Flp. 2:5-8)
- Tángá Marko 10:13-16.
Nini emonisi ete Yesu azalaki moto oyo bato mosusu bazalaki kokakatana te mpo na kosolola na ye, mpe liteya nini bankulutu bakoki kozwa na ndakisa na ye? (Mrk. 6:30-34; Flp. 2:1-4; 1 Tim. 4:12)