Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 98: Na ngomba ya Olive

Lisolo 98: Na ngomba ya Olive

BÓTALA Yesu na Ngomba ya Olive. Bantoma minei bazali elongo na ye. Andre ná Petro bazali bandeko, Yakobo ná Yoane mpe bazali bandeko. Ndako bozali komona mosika kuna ezali tempelo ya Nzambe, na Yerusaleme.

Mikolo mibale eleki uta Yesu akɔtaki na Yerusaleme likoló ya mwana ya mpunda. Ezali mokolo ya mibale. Yesu akei na tempelo ntɔngɔntɔngɔ. Banganga-nzambe balukaki kokanga ye mpo báboma ye. Kasi bazali kobanga, mpo bato balingi ye.

Yesu ná bantoma na ye

Yesu alobi na bakonzi ya mangomba ete: ‘Bino banyoka, bana ya banyoka!’ Na nsima, ayebisi bango ete Nzambe akopesa bango etumbu mpo na mabe oyo bazali kosala. Nsima na yango, Yesu akei na Ngomba ya Olive, mpe bantoma wana minei babandi kotuna ye mituna. Boyebi makambo oyo batuni ye?

Bantoma bazali kotuna ye makambo oyo ekoya. Bayebi ete Yesu akosilisa mabe oyo ezali kosalema awa na mabele. Kasi balingi báyeba ntango nini likambo yango ekosalema. Ntango nini Yesu akozonga mpo na koyangela?

Yesu ayebi ete bayekoli na ye bakomona ye lisusu te ntango akozonga. Lokola ye akozala na likoló, bakozala na likoki ya komona ye te. Na yango, Yesu ayebisi bantoma na ye ndambo ya makambo oyo ekosalema na mabele ntango akokóma Mokonzi na likoló. Wapi ndambo ya makambo yango?

Yesu alobi ete bitumba minene, bamaladi, mpe nzala ekozala; mabe ekobakisama mingi mpe mabele ekoningana na bisika mingi. Yesu alobi mpe ete nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ekosakolama na mabele mobimba. Makambo oyo ezali mpenza kosalema na ntango na biso? Ɛɛ! Yango wana tokoki kondima ete Yesu azali koyangela sikoyo na likoló. Mosika te akolongola mabe nyonso awa na mabele.

Matai 21:46; 23:1-39; 24:1-14; Marko 13:3-10.



Mituna

  • Na elilingi oyo, wapi Yesu, mpe banani bazali na ye elongo?
  • Na tempelo, banganga-nzambe balingaki kosala Yesu nini, mpe ye alobaki na bango nini?
  • Bantoma batuni Yesu nini?
  • Mpo na nini Yesu ayebisi bantoma na ye mwa makambo oyo ekobanda kosalema na mabele na ntango oyo ye akobanda koyangela kuna na likoló?
  • Likambo nini Yesu alobi ete ekosalema liboso ete alongola mabe nyonso na mabele?

Mituna mosusu