Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 102: Yesu azali na bomoi

Lisolo 102: Yesu azali na bomoi

BOYEBI mwasi oyo bozali komona ná mibali mibale wana? Mwasi yango ezali Maria Magadalena. Mpe bato mibale oyo balati bilamba ya mpɛmbɛ ezali baanzelu. Maria azali kotala esika bakundaki Yesu. Babengaka esika yango lilita. Kasi sikoyo nzoto ya Yesu ezali komonana te! Nani alongoli yango? Tótala ndenge elekaki.

Baanzelu bazali kosolola na Maria Magadalena

Ntango Yesu akufi, banganga-nzambe balobi na Pilate ete: ‘Ntango Yesu azalaki na bomoi, alobaki ete akosekwa nsima ya mikolo misato. Bongo tindá bato bábatela lilita na ye, noki bayekoli na ye báya koyiba nzoto na ye, mpe na nsima báloba ete asekwi.’ Bongo Pilate ayebisi banganga-nzambe bátinda basoda bábatela lilita yango.

Kasi na mokolo ya misato, na ntɔngɔntɔngɔ, nsima ya liwa ya Yesu, anzelu ya Yehova ayei. Alongoli libanga oyo ezipaki lilita. Basoda yango bayoki nsɔmɔ mpenza mpe bakoki ata koningana te. Bongo ntango batali na kati ya lilita, nzoto ezali lisusu te. Na ntango yango, basoda mosusu bakei na mboka koyebisa banganga-nzambe likambo yango. Boyebi eloko oyo banganga-nzambe yango ya motema mabe basali? Bapesi basoda mbongo mpo bákosa. Balobi na bango boye: ‘Bóloba ete bayekoli na ye bayaki koyiba ye na butu na ntango tolalaki mpɔngi.’

Na ntango yango, basi mosusu oyo bazalaki kosalela Yesu bakei na lilita. Bakamwe mingi mpo bamoni nzoto na kati te! Na mbala moko baanzelu mibale oyo balati bilamba oyo ezali kongɛnga babimeli bango. Bongo balobi na bango ete: ‘Mpo na nini bozali koluka Yesu awa? Asili kosekwa! Bókende noki koyebisa bayekoli na ye.’ Basi yango babandi kokende mbangu. Bongo na nzela, moto moko atɛlɛmisi bango. Boyebi moto yango? Ezali Yesu. Alobi na bango ete: ‘Bókende koyebisa bayekoli na ngai.’

Ntango basi yango bayebisi bayekoli ete Yesu azali na bomoi, mpe ete bamoni ye, bayekoli bandimi te. Petro ná Yoane bakei mbangu tii na lilita, kasi lilita etikali mpamba! Ntango Petro ná Yoane bazongi, Maria Magadalena atikali. Na ntango yango nde atali na kati mpe amoni baanzelu mibale.

Nzoto ya Yesu ekei wapi? Nzambe alimwisaki yango. Nzambe asekwisaki Yesu na nzoto oyo azalaki na yango te ntango akufaki. Apesaki ye nzoto ya elimo, lokola oyo ya baanzelu. Kasi ndenge tokomona yango, Yesu azalaki kolata nzoto lokola oyo ya bato mpo na komonisa bayekoli na ye ete azali na bomoi.

Matai 27:62-66; 28:1-15; Luka 24:1-12; Yoane 20:1-12.



Mituna

  • Mwasi oyo ozali komona na elilingi ezali nani, bongo mibali mibale ozali komona ezali banani, mpe bazali wapi?
  • Mpo na nini Pilate ayebisi banganga-nzambe bátinda basoda bákɛngɛla lilita ya Yesu?
  • Nsima ya liwa ya Yesu, anzelu moko asali nini mokolo ya misato na ntɔngɔntɔngɔ, kasi banganga-nzambe basali nini?
  • Mpo na nini basi mosusu bakamwe ntango bayei kotala lilita ya Yesu?
  • Mpo na nini Petro ná Yoane bayei mbangu na lilita ya Yesu, mpe bakuti nini?
  • Nini ekómeli nzoto ya Yesu, kasi asali nini mpo na komonisa bayekoli na ye ete azali na bomoi?

Mituna mosusu