Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 107: Babomi Stefano na mabanga

Lisolo 107: Babomi Stefano na mabanga

MOTO oyo afukami nkombo na ye Stefano. Azali moyekoli ya sembo ya Yesu. Kasi talá likambo bazali kosala ye sikoyo. Bazali kobamba ye mabanga ya minene. Kasi mpo na nini bayini ye makasi mpe bazali kosala ye likambo ya nsɔmɔ boye? Tólanda naino lisolo.

Bazali koboma Stefano na mabanga

Nzambe apesi Stefano nguya asala makamwisi ya minene. Bato oyo balingi makambo wana te, babandi kowelana na ye mpo azali koteya bato mateya ya solo. Kasi Nzambe apesi Stefano bwanya mingi, mpe amonisi ete bato yango bazali koteya bato mateya ya lokuta. Yango esilikisi bango lisusu makasi. Yango wana, bakangi ye mpe babengi bato báya kokosela ye makambo.

Bongo nganga-nzambe monene atuni Stefano ete: ‘Makambo oyo ezali solo?’ Stefano ayanoli ye na diskur moko molai. Mpo na kosukisa, alobi ete na ntango ya kala, bato mabe bayinaki basakoli ya Yehova. Mpe abakisi ete: ‘Bino bozali lokola bango. Bobomi Yesu, mosaleli ya Nzambe mpe botosi mibeko ya Nzambe te.’

Ntango bakonzi ya mangomba bayoki maloba wana, basiliki makasi. Babandi kolyalya mino na nkanda. Kasi, Stefano atomboli miso na likoló, mpe alobi ete: ‘Talá! Namoni Yesu atɛlɛmi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe, kuna na likoló.’ Bongo, ntango alobi boye, mibali yango batye mabɔkɔ na bango na matoi mpe bakweli ye. Bakangi ye mpe babendi ye na libándá ya engumba.

Kuna, balongoli bilamba na bango ya likoló, bapesi yango elenge moko, oyo nkombo na ye Saulo, mpo abatela yango. Bozali komona elenge mobali yango? Na nsima, babandi kobamba Stefano mabanga. Stefano afukami ndenge bozali komona awa, mpe abondeli ete: ‘Yehova, kopesa bango etumbu mpo na mabe oyo te.’ Ayebi ete bato mosusu na kati na bango bakosami nde na bakonzi ya mangomba. Nsima ya koloba bongo, Stefano akufi.

Soki moto asali yo mabe, olukaka kozongisela ye mabe? Osɛngaka Nzambe apesa ye etumbu? Ezala Stefano to Yesu basalaki bongo te. Ata bato oyo basalaki bango mabe, bamoniselaki bango boboto. Tiká tólanda ndakisa na bango.

Misala 6:8-15; 7:1-60.



Mituna

  • Stefano azali nani, mpe Nzambe asalisaki ye asala likambo nini?
  • Likambo nini Stefano alobi oyo epesi bakonzi ya mangomba nkanda makasi?
  • Ntango mibali wana babimisi Stefano na libándá ya mboka, basali ye nini?
  • Na elilingi oyo, elenge mobali oyo atɛlɛmi pene na bilamba ezali nani?
  • Liboso Stefano akufa, abondeli Yehova mpo na nini?
  • Soki tomekoli Stefano, tokosala nini soki moto moko asali biso mabe?

Mituna mosusu