Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 108: Na nzela ya Damasi

Lisolo 108: Na nzela ya Damasi

BOYEBI moto oyo akwei na mabele? Ezali Saulo. Kobosana te, ye nde moto oyo abatelaki bilamba ya likoló ya bato oyo babomaki Stefano. Kasi talá pole oyo ezali kongɛnga! Likambo nini ezali kosalema?

Nsima ya liwa ya Stefano, Saulo abandi konyokola bayekoli ya Yesu. Azali kokɔta na ndako mokomoko, azali kobimisa bayekoli libándá, azali kobwaka bango na bolɔkɔ. Bayekoli mingi bakimi na bingumba mosusu mpe babandi kosakola “nsango malamu” kuna. Bongo Saulo akei koluka bayekoli ya Yesu na bingumba mosusu. Awa azali kokende na Damasi. Nzokande, na nzela, likambo moko ya kokamwa esalami.

Na mbala moko, pole moko euti na likoló engɛngi zingazinga ya Saulo. Akwei na mabele ndenge bozali komona awa. Bongo mongongo moko elobi na ye ete: ‘Saulo, Saulo! Mpo na nini ozali konyokola ngai?’ Bato oyo bazali na ye bamoni kongɛnga wana mpe bayoki lokito ya mongongo moko boye, kasi bakangi ntina ya maloba yango te.

Kongɛnga ebomi Saulo miso

Saulo atuni ete: ‘Yo nani, Nkolo?’

Mongongo yango elobi ete: ‘Ngai Yesu oyo yo ozali konyokola.’ Yesu alobi bongo mpo, ntango Saulo azali konyokola bayekoli na ye, azali koyoka lokola nde azali konyokola ye Yesu.

Saulo atuni ete: ‘Nkolo, nasengeli kosala nini?’

Yesu alobi na ye ete: ‘Tɛlɛmá, kende na Damasi. Kuna bakoyebisa yo oyo osengeli kosala.’ Ntango Saulo atɛlɛmi, afungoli miso kasi akoki komona eloko te. Miso na ye ekufi. Bongo basimbi ye na lobɔkɔ mpe bakei na ye na Damasi.

Sikoyo, Yesu alobi na moyekoli na ye moko na Damasi, nkombo na ye Ananiasi ete: ‘Ananiasi, tɛlɛmá. Kende na balabala oyo ebengami Alima. Na ndako ya Yudasi, luká moto moko nkombo na ye Saulo. Naponi ye mpo azala mosaleli na ngai monene.’

Ananiasi akei. Ntango akutani na Saulo, atyeli ye mabɔkɔ mpe alobi ete: ‘Nkolo atindi ngai epai na yo mpo yo omona lisusu mpe otonda na elimo santu.’ Na mbala moko, biloko moko lokola mposo ya mbisi euti na miso ya Saulo ekwei, mpe akómi komona lisusu.

Yesu apesaki Saulo nguya ya kosakola “nsango malamu” epai ya bato ya bikólo mingi. Ayebani sikoyo na nkombo ntoma Paulo, tokolobela ye mwa nsima. Kasi tótala naino likambo oyo Nzambe atindi ntoma Petro asala.

Misala 8:1-4; 9:1-20; 22:6-16; 26:8-20.



Mituna

  • Saulo asali nini nsima ya liwa ya Stefano?
  • Ntango Saulo azali kokende na Damasi, likambo nini ya kokamwa esalami?
  • Yesu ayebisi Saulo asala nini?
  • Yesu alobi na Ananiasi nini, mpe ndenge nini Saulo abandi lisusu komona?
  • Saulo akómi na nkombo nini, mpe Yesu apesi ye mokumba nini?

Mituna mosusu