Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 109: Petro epai ya Korneyi

Lisolo 109: Petro epai ya Korneyi

AWA bozali komona ntoma Petro elongo na baninga na ye mibale. Kasi mpo na nini moto mosusu afukameli ye? Ezali malamu afukamela ye? Moto yango nde nani?

Petro akutani na Korneyi

Moto yango nkombo na ye Korneyi. Azali mokonzi ya basoda, azali moto ya Roma. Korneyi ayebi Petro te, kasi bayebisi ye ete abenga ntoma Petro na ndako na ye. Mpo na nini?

Bayekoli ya liboso ya Yesu bazali Bayuda, kasi Korneyi azali Moyuda te. Atako bongo alingaka Nzambe, abondelaka ye, mpe asalelaka bato ebele ya makambo ya malamu. Mokolo moko nsima ya midi, anzelu moko abimeli ye mpe alobi na ye ete: ‘Nzambe asepeli na yo mpe ayoki mabondeli na yo. Tindá bato bábenga mobali moko nkombo na ye Petro. Azali na Yope na ndako ya Simo, pene na mbu.’

Korneyi atindi bato nokinoki na Yope, epai ya Petro. Na mokolo oyo elandi, ntango bato yango bakómi pene na Yope, Petro amati na ndako ya Simo. Bongo Nzambe amonisi ye eloko moko lokola elamba monene euti na likoló ezali kokita. Elamba yango etondi na banyama ya ndenge nyonso. Na kolanda mobeko ya Nzambe, banyama yango nyonso ezalaki banyama ya mbindo, Bayuda bakoki kolya yango te; kasi mongongo elobi na ye ete: ‘Tɛlɛmá, Petro. Bomá mpe lyá.

Kasi Petro alobi ete: ‘Te! Nalyá naino eloko ata moko te ya mbindo.’ Kasi mongongo yango elobi na Petro ete: ‘Tiká kobenga mbindo biloko oyo Nzambe alobi sikoyo ete ezali pɛto.’ Likambo yango esalemi mbala misato mobimba. Ntango Petro azali naino komituna ndimbola ya makambo yango, bato oyo Korneyi atindi bakómi mpe batuni esika Petro azali.

Bongo Petro akiti mpe alobi na bango ete: ‘Ngai nde moto boyei koluka. Bozali koluka ngai mpo na nini?’ Ntango bato yango bayebisi Petro ete anzelu moko alobi na Korneyi ete abengisa ye na ndako na ye, Petro andimi kokende na bango. Na mokolo oyo elandi, Petro ná baninga na ye bakei epai ya Korneyi, na Kaisaria.

Korneyi ayanganisaki bandeko na ye ná baninga na ye ya motema. Ntango Petro akómi, Korneyi ayei kokutana na ye. Akwei na makolo na ye mpe afukameli ye, ndenge bozali komona awa na elilingi. Kasi Petro alobi na ye ete: ‘Tɛlɛmá; ngai mpe nazali kaka moto.’ Biblia emonisi ete ezali malamu te kofukamela moto to kosambela ye. Tosengeli kosambela kaka Yehova.

Sikoyo Petro azali koteya bato nyonso oyo basangani na ndako ya Korneyi. Bongo alobi ete: ‘Namoni ete Nzambe andimaka bato nyonso oyo balingi kosalela ye.’ Mpe kaka na ntango oyo azali koloba, Nzambe atindi elimo santu na ye, mpe bato nyonso babandi koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge. Yango ekamwisi mingi mpenza bayekoli oyo bazali Bayuda, oyo bayaki elongo na ntoma Petro, mpo bango bazalaki kokanisa ete Nzambe alingaka kaka Bayuda. Yango eteyi bango ete Nzambe amonaka te ete bato ya mposo moko boye nde baleki bato ya mposo mosusu. Yango ezali likambo ya ntina mpenza oyo biso nyonso tosengeli kobosana te.

Misala 10:1-48; 11:1-18; Emoniseli 19:10.



Mituna

  • Na elilingi oyo, moto oyo afukami ezali nani?
  • Anzelu moko ayebisi Korneyi nini?
  • Nzambe amonisi Petro eloko nini ntango azali na likoló ya ndako ya Simo na Yope?
  • Mpo na nini Petro ayebisi Korneyi ete asengeli te kofukamela ye mpe kosambela ye?
  • Mpo na nini bayekoli Bayuda oyo bayei elongo na Petro bakamwe?
  • Liteya nini tosengeli kozwa na ndenge Petro akei epai ya Korneyi?

Mituna mosusu