Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 110: Paulo abengi Timote

Lisolo 110: Paulo abengi Timote

ELENGE mobali oyo bozali komona awa elongo na ntoma Paulo, nkombo na ye Timote. Ye ná baboti na ye bafandaka na Listra. Nkombo ya mama na ye Enise mpe oyo ya nkɔkɔ na ye Loisi.

Oyo ezali mbala ya misato Paulo akóma na Listra. Elingi koleka mbula moko banda Paulo ná Barnabasi bayaki mbala ya liboso na mobembo ya mosala ya kosakola awa. Mpe na mbala oyo, Paulo ayei nde na moninga na ye Silasi.

Timote ná Paulo

Boyebi likambo ntoma Paulo azali kosolola na Timote? Azali kotuna ye ete: ‘Okolinga koya elongo na ngai ná Silasi? Okoki kosalisa biso na kosakola na bamboka ya mosika.’

Timote andimi. Mwa moke na nsima, Timote atiki baboti na ye mpe akei elongo na ntoma Paulo ná Silasi. Kasi liboso ya kolobela mobembo na bango, tótala naino makambo oyo ekómelaki ntoma Paulo. Esili koleka mbula soki zomi na nsambo banda Yesu abimelaki ye na nzela ya Damasi.

Tóbosana te ete Paulo akendeki na Damasi mpo na konyokola bayekoli, kasi sikoyo ye moko akómi moyekoli! Na nsima, Bayuda baluki koboma ye mpo bazali kolinga te mateya oyo ezali kolobela Yesu. Kasi bayekoli bakimisi ye. Batye ye na kitunga, mpe bakitisi ye na ngámbo mosusu ya lopango.

Na nsima, Paulo akei kosakola na Antiokia. Ezali na engumba yango nde babengaki bayekoli ya Yesu na nkombo “bakristo” mbala ya liboso. Na nsima, batindi Paulo ná Barnabasi bákende kosakola longwa na Antiokia tii na mikili ya mosika. Moko na bingumba bakendeki ezali Listra, epai Timote azalaki kofanda.

Nzokande soki mbula moko na nsima, Paulo azongi lisusu na Listra na mobembo ya mibale. Kasi ntango Timote alongwe kuna nzela moko na Paulo ná Silasi, bakei wapi? Tótala na karte.

Liboso, bakei naino na engumba Ikoniumu, oyo ezali pene wana, na nsima bakei na engumba mosusu oyo babengi Antiokia. Ntango balongwe kuna bakei na Troase, na Filipi, na Tesaloniki mpe na Beroya. Bozali komona Atene na karte oyo? Paulo asakoli mpe wana. Nsima na yango, basakoli mbula moko na ndambo na Korinti. Na nsuka, batɛlɛmi mwa moke na Efese. Mpe na nsima bazwi masuwa bazongi na Kaisaria, mpe baleki na Antiokia, mpe ntoma Paulo atikali wana.

Timote atamboli ebele ya bakilomɛtrɛ mpo na kosalisa Paulo na mosala ya kosakola “nsango malamu,” mpe kofungola masangá ya sika. Ntango bokokóma mikóló, bokosalela Nzambe na bosembo lokola Timote?

Misala 9:19-30; 11:19-26; mokapo 13 tii 17; 18:1-22.

Kartɛ

1. Roma; 2. Malta; 3. Beroya; 4. Tesaloniki; 5. Korinti; 6. Filipi; 7. Atene; 8. Krɛtɛ; 9. Troase; 10. Efese; 11. Milete; 12. Kolose; 13. Antiokia; 14. Ikoniumu; 15. Listra; 16. Shipre; 17. Antiokia; 18. Kaisaria; 19. Yope; 20. Damasi; 21. Yerusaleme; 22. Mbu Monene (Mediterane)



Mituna

  • Elenge mobali oyo ozali komona na elilingi ezali nani, afandaka wapi, mpe nkombo ya mama na ye nani mpe oyo ya nkɔkɔ na ye ya mwasi nani?
  • Timote alobi nini ntango Paulo atuni ye soki akolinga kokende elongo na ye ná Silasi mpo na kosakwela bato na bamboka ya mosika?
  • Epai nini babengaki bayekoli ya Yesu mbala ya liboso na nkombo bakristo?
  • Paulo, Silasi ná Timote bakendeki na bingumba nini ntango balongwe na Listra?
  • Ndenge nini Timote asalisi Paulo, mpe bilenge ya mikolo na biso basengeli komituna motuna nini?

Mituna mosusu