Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bilimu mabe bazali babomi na bato!

Bilimu mabe bazali babomi na bato!

Uta kala Satana mpe bilimu mabe bazalaka ntango nyonso babomi na bato mpe babimisi na makama minene. Kalakala, Satana abomaki bibwele mpe basaleli na mosembwi Yobo. Na nsima abomaki bana zomi ya Yobo na kobimisaka “mopepe monene” mokweisaki ndako oyo bango bazalaki na kati. Na nsima, abetaki Yobo “na bibimba mabe longwa na matambé na makoló na ye kino epai na likoló na motó na ye.”​—Yobo 1:7-19; 2:7.

Na mikolo na Yesu, bilimu mabe bakomisaki bato ba baba mpe bakufeli-miso. (Matai 9:32, 33; 12:22) Banyokolaki moto moko oyo azalaki komikatakata mpota na mabanga. (Malako 5:5) Bakotelaki mpe elenge mobali moko oyo bazalaki kongangisa ye, kopusa ye na komibwakabwaka na mabelé mpe “kolengisa ye makasi.”​—Luka 9:42.

Kalakala, bilimu mabe bapesaki bato maladi to mpe babimisaki epai na bamosusu mpasi makasi kino kokangisa misisa na nzoto na bango mpe kobwaka bango na nse

Satana mpe bilimu mabe bazali ntango nyonso babomi na bato, mpe bakomi mabe koleka uta ntango oyo babenganaki bango na likoló. Kati na mokili mobimba, mabe na bango mazali koyokama. Ezali na bato oyo bango basili kopesa maladi, ezali na bamosusu oyo bazali konyokola na butu, kolongola bango mpongi to kolotisa bango bandoto ya nsomo, ezali mpe na bamosusu oyo bazali konyokola mpo na makambo matali bosangisi nzoto mpe bamosusu, mpo na kosukisa, bazali kopesa bango ligboma, bazali kopusa bango na koboma bato to na komiboma bango moko.

Na mikolo na biso, bilimu mabe bazali kopesa bato ligboma; bazali mpe kotungisa bato mosusu na butu na kolotisaka bango bandoto ya nsomo

Lintina, mwasi moko ya mboka Suriname, ayebisi ete démo moko, to elimu mabe, abomaki bato 16 ya libota na ye mpe atungisaki ye moko, na nzoto mpe na makanisi, na boumeli ya mibu 18. Amonaki makambo mingi, ntina wana alobi solo ete bilimu mabe “balingaka konyokola kino kufa baombo na bango oyo bazali na motó makasi.”

Kasi Jéhovah azali na makoki ya kobatela basaleli na ye liboso na makaneli ya Satana.​—Masese 18:10.