Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Koloba ete bilimu ezali nde bato oyo basilá kokufa, ezali solo te

Koloba ete bilimu ezali nde bato oyo basilá kokufa, ezali solo te

Bilimu bizali. Kati na mokili na elimo ezangi komonana na miso na biso, bilimu bizali, ya malamu mpe ya mabe. Bazaláká kala bato awa na mokili, bongo basilá kokufa?

Te. Na kokesena na makanisi na bato mosusu, ntango moto akokufaka akokendaka na mokili na elimo te. Toyebi yango ndenge nini? Mpo ete Biblia nde elobi bongo. Biblia ezali mokanda na solo mouti epai ya Nzambe na solo bobele moko, oyo nkombo na ye ezali Jéhovah. Jéhovah azalisaki bato; ayebi na malamu nyonso eloko nini ekomelaka bango ntango bazali kokufa.​—Nzembo 83:18; 2 Timote 3:16.

Adam azwamaki na putulu; azongaki na putulu

Biblia elobi ete Nzambe azalisaki Adam, moto ya liboso, “uta na putulu ya mabélé.” (Genese 2:7) Atyaka ye kati na Paradis, elanga ya Edene. Soki Adam atosaka mobeko ya Jéhovah, mbele akufaki te; mbele azali na bomoi kino lelo awa na mokili. Kasi mpo ete abukaki mobeko na Nzambe na nkò, Nzambe alobaki na ye ete: “Okozonga na mabélé, mpo ete okamatamaki na yango. Ozali putulu mpe okozonga kati na putulu.”​—Genese 3:19.

Wana elingi koloba nini? Kanisa naino: Adam azalaki wapi naino Jéhovah azalisi ye te na putulu ya mabélé? Azalaki epai moko te. Azalaki na likoló te na motindo na elimo oyo asengelaki kobotama. Azalaki te. Ntango Jéhovah alobaki ete Adam ‘akozonga na mabélé,’ alingaki bongo koloba ete akokufa. Nsima na kufa na ye, Adam abongwanaki te mpo na kokota kati na mokili na elimo. Na kufa na ye, azongaki nde na motindo na ebandeli, elingi koloba nzoto ezangi bomoi, mpe na nsuka azalaki lisusu te. Kufa elimboli kozanga bomoi.

Boni mpo na bakufi mosusu? Bango mpe bazali lisusu ata epai moko te? Yoka eyano ezwami na Biblia:

  • “Nyonso [ezala banyama ezala bato] bakokenda na esika moko; nyonso balongwi na putulu, nyonso bakozonga na putulu lisusu.”​—Mosakoli 3:20.

  • “Bakufi . . . bayebi eloko moko te.”​—Mosakoli 9:5.

  • “Bolingo na bango mpe koyina na bango mpe zuwa na bango esili kokufa.”​—Mosakoli 9:6.

  • “Ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na Sheolo [liyita], esika ekokenda yo.”​—Mosakoli 9:10.

  • “Moto akozonga na mabélé lisusu; bobele na mokolo yango kokanisa na ye esili.”​—Nzembo 146:4.

Bobele bato bazali na bomoi nde bakoki kosala makambo oyo

Ezali na yo mpasi mpo na kondima mikapo oyo ya Biblia? Soki ee, kanisa na oyo: Kati na mabota mingi, mobali nde akosalaka mosala mpo na kozwa mosolo ya kobokola na yango libota na ye. Nzokande soki ayei kokufa, mbala mingi libota ekokutana na mikakatano. Mbala mosusu, mwasi na ye mpe bana na ye bazali na mosolo te mpo na kosomba bilei. Ekoki mpe kozala ete bazali konyokwama na bato oyo bayinaki mobali wana. Bongo, omituna naino: ‘Soki mobali yango azali na bomoi na mokili na elimo, mpo na nini akokoba te kopesaka mosolo epai ya libota na ye mpo ete babika na yango? Mpo na nini akobatela bango te na monyokoli na banguna?’ Ezali mpo ete Makomami mazali na elonga ete: moto wana azali na bomoi lisusu te, akoki kosala lisusu eloko moko te.​—Nzembo 115:17.

Bakufi bakoki te kosunga bato oyo bazali na nzala soko mpe kobatela bato batikali na bomoi ete banyokwama te

Elingi koloba ete bakufi bakozonga lisusu na bomoi te? Ezali boye te. (Tokolobela mpo na lisekwa mwa mosika liboso.) Nde bakufi bayebi te makambo oyo yo ozali kosala. Bakoki komona yo te, bakoki koyoka yo te, bakoki mpe koloba na yo te. Ntina ya kobanga bango ezali te. Bakoki kosalisa yo te, mpe bakoki kosala yo mabe te.​—Mosakoli 9:4; Yisaya 26:14.