Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mabelé mabongwani Paradis

Mabelé mabongwani Paradis

Jéhovah akolongola libela mbeba nyonso oyo Satana asili kosala. Aponi Yesu Mokonzi likoló na mabelé mobimba. Lokola ekoyangelama na Mokonzi oyo, mabelé makobongwana paradis.​—Danyele 7:13, 14; Luka 23:43.

Tala makambo oyo Jéhovah alaki:

  • BILEI MINGI: “Mokili ezali kobota mbuma na yango; Nzambe, ee Nzambe na biso apamboli biso.” “Masango makotondana na mokili; likoló na ngomba mbuma ekoyikana.”​—Nzembo 67:6; 72:16, MN.

  • BITUMBA BIKOZALA LISUSU TE: “Yaka kotala misala na Jéhovah oyo asali bikamwiseli kati na mokili. Ye asukisi bitumba kino nsuka na mokili.”​—Nzembo 46:8, 9.

  • MABE EKOSILA: “Mpo ete basali na mabe bakobomama . . .  Nsima na mwa ntango moke, moto na mabe akozala lisusu te; okotala esika na ye, nde akomonana te.”​—Nzembo 37:9, 10.

  • MALADI, MAWA MPE KUFA EKOZALA LISUSU TE: “Bongo miso na bakufeli miso makofungolama, mpe matoi na bimimi makozipolama; bongo, motengumi akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemo na ebubu ekoyemba na esengo.”​—Yisaya 35:5, 6.

    “Mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”​—Emoniseli 21:3, 4.

Na kokesena na Satana mpe bilimu mabe, Jéhovah akobukaka lokuta te. Nyonso oyo alaki ezali kokokana. (Luka 1:36, 37) Jéhovah alingi yo mpe alingi ete ozala na bomoi kati na Paradis oyo akosala. Na bongo kutana na ba Témoins de Jéhovah mpo na koyekola lisusu mingi na ntina na solo kitoko oyo ezwami kati na Liloba na Nzambe. Soki osaleli solo kati na bomoi na yo, okosikolama na makambo na lokuta, na biyambayamba mpe na kozanga boyebi. Nsuka na yango, okosikolama ata na lisumu mpe na liwa. Yesu alobaki yango: “Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.”​—Yoane 8:32.