MOKAPO YA ZOMI NA MWAMBE
Nasengeli komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo?
1. Okoki kokanisa nini nsima ya koyekola buku oyo malamumalamu?
TOYEKOLI mateya ya Biblia mingi, na ndakisa elaka ya Nzambe ya bomoi ya seko, esika bakufi bakendaka, mpe elikya ya lisekwa. (Mosakoli 9:5; Luka 23:43; Yoane 5:28, 29; Emoniseli 21:3, 4) Ekoki kozala ete okóma kokende na makita ya Batatoli ya Yehova mpe ondimi ete losambo na bango ezali losambo ya solo. (Yoane 13:35) Ntango mosusu mpe obandi kokóma moninga ya Yehova, mpe omoni malamu osalela ye. Na yango, okoki kokanisa boye: ‘Nasengeli kosala nini mpo na kosalela Nzambe?’
2. Mpo na nini moto moko ya Etiopi alingaki kozwa batisimo?
2 Na ntango ya Yesu, moto moko ya Etiopi mpe akanisaki bongo. Nsima ya lisekwa ya Yesu, Filipe, moyekoli ya Yesu, asakwelaki moto yango. Filipe amonisaki moto yango ete Yesu nde Masiya. Makambo yango esimbaki motema ya moto yango mpe na mbala moko alobaki: “Talá! mai yango oyo; nini ezali kopekisa ngai kobatisama?”—Misala 8:26-36.
3. (a) Mobeko nini Yesu apesaki bayekoli na ye? (b) Ndenge nini moto asengeli kobatisama?
3 Biblia elobi polele ete soki olingi kosalela Yehova, osengeli kozwa batisimo. Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango.” (Matai 28:19) Yesu ye moko apesaki ndakisa na ndenge azwaki batisimo. Batangiselaki ye kaka mwa mai na motó te, kasi bazindisaki ye mobimba na mai. (Matai 3:16) Lelo oyo mpe ntango bazali kobatisa mokristo, basengeli kozindisa ye mobimba na mai.
4. Batisimo na yo ekomonisa nini?
4 Ntango ozwi batisimo, okomonisa bato ete olingi mpenza kozala moninga ya Nzambe mpe olingi kosalela ye. (Nzembo 40:7, 8) Na yango, okoki komituna: ‘Nasala nini mpo nazwa batisimo?’
BOYEBI MPE KONDIMA
5. (a) Osengeli libosoliboso kosala nini mpo ozwa batisimo? (b) Mpo na nini makita ya lisangá ezali na ntina?
5 Liboso ozwa batisimo, osengeli koyekola koyeba Yehova mpe Yesu. Obandá kosala yango ntango ozali koyekola Biblia. (Tángá Yoane 17:3.) Kasi esuki wana te. Biblia elobi ete osengeli ‘kotonda na boyebi ya solosolo’ ya mokano ya Yehova. (Bakolose 1:9) Makita ya Batatoli ya Yehova ekosalisa yo mpo okóma mpenza moninga makasi ya Yehova. Yango nde ntina oyo osengeli kokendaka na makita yango pɔsɔ na pɔsɔ.—Baebre 10:24, 25.
6. Osengeli nde koyeba Biblia mobimba liboso ozwa batisimo? Limbolá.
6 Yehova asɛngi yo te ete oyeba Biblia mobimba liboso ozwa batisimo. Asɛngaki moto ya Etiopi te ete ayeba makambo nyonso liboso ya kozwa batisimo. (Misala 8:30, 31) Mpe koyekola makambo ya Nzambe ezali na nsuka te. (Mosakoli 3:11) Kasi mpo ozwa batisimo, osengeli koyeba mpe kondima ata mateya ya Biblia oyo moto asengeli koyeba na ebandeli.—Baebre 5:12.
7. Ndenge nini boyekoli na yo ya Biblia esalisi yo?
7 Biblia elobi: “Soki moto azali na kondima te akoki kosepelisa [Nzambe] ata moke te.” (Baebre 11:6) Na yango, osengeli kozala na kondima liboso ozwa batisimo. Biblia elobi ete na ntango ya kala, na engumba ya Korinti, bato mosusu bayokaki makambo oyo bayekoli ya Yesu bateyaki, mpe na nsima “babandaki kondima mpe kobatisama.” (Misala 18:8) Ndenge moko mpe, boyekoli na yo ya Biblia esalisi yo ondima bilaka ya Nzambe mpe mbeka ya Yesu oyo ezali na nguya oyo ekoki kobikisa biso na lisumu mpe na liwa.—Yosua 23:14; Misala 4:12; 2 Timote 3:16, 17.
KOYEBISA BATO MOSUSU MATEYA YA BIBLIA
8. Nini ekotinda yo oyebisa bato mosusu makambo oyo oyekoli?
8 Ntango ozali kokoba koyekola Biblia mpe komona ndenge ezali kosalisa yo na bomoi na yo, kondima Yirimia 20:9; 2 Bakorinti 4:13) Kasi, okoyebisa banani?
na yo ekokóma makasi. Yango ekotinda yo oyebisa bato mosusu makambo oyo ozali koyekola. (9, 10. (a) Makambo oyo ozali koyekola, okoki kobanda koyebisa yango banani? (b) Osengeli kosala nini soki olingi kosakola elongo na bandeko ya lisangá?
9 Okoki koyebisa bandeko na yo, baninga na yo, bato ya kartye to baninga ya mosala makambo oyo ozali koyekola. Ezali malamu, kasi saláká yango na boboto mpe na bolingo. Nsukansuka, okobanda kosakola na bandeko ya lisangá. Soki omoni ete okoki, sololá na ndeko oyo ayekolaka na yo Biblia mpe yebisá ye ete olingi kobanda kosakola elongo na bandeko ya lisangá. Soki ndeko yango mpe amoni ete okoki kosala yango mpe soki ozali kotosa mitinda ya Biblia na bomoi na yo, na nsima bino mibale bokokutana na bankulutu mibale ya lisangá.
10 Nini ekosalema ntango bokokutana? Bankulutu bakosolola na yo mpo na kotala soki oyebi malamu mateya ya Biblia oyo moto asengeli koyeba na ebandeli mpe ozali kondima yango, soki ozali kotosa Biblia na bomoi ya mokolo na mokolo, mpe soki olingi mpenza kokóma Motatoli ya Yehova. Kobosana te ete bankulutu babatelaka bandeko nyonso ya lisangá, ata yo mpe; yango wana kobanga te kosolola na bango. (Misala 20:28; 1 Petro 5:2, 3) Na nsima ya kosolola na bankulutu, bakoyebisa yo soki okoki kobanda kosakola elongo na bandeko ya lisangá to te.
11. Mpo na nini ezali na ntina kobongisa makambo mosusu na bomoi na yo liboso obanda kosakola na bandeko ya lisangá?
11 Bankulutu bakoki koyebisa yo ete osengeli kobongisa makambo mosusu na bomoi na yo liboso obanda kosakola elongo na bandeko ya lisangá. Mpo na 1 Bakorinti 6:9, 10; Bagalatia 5:19-21.
nini kobongisa makambo yango ezali na ntina? Mpo ntango tozali koyebisa bato makambo ya Yehova, tozali komonisa Yehova mpe tosengeli kozala na bizaleli oyo epesaka Ye lokumu.—KOBONGOLA MOTEMA MPE KOBONGWANA
12. Mpo na nini biso nyonso tosengeli kobongola motema?
12 Ezali na likambo mosusu oyo osengeli kosala liboso ozwa batisimo. Ntoma Petro alobaki: “Bóbongola mitema mpe bóbongwana mpo masumu na bino ebomama.” (Misala 3:19) Kobongola motema elimboli nini? Elimboli koyoka mpenza mawa mpo na makambo nyonso ya mabe oyo tosalá. Na ndakisa, soki ozalaki kosala pite, ekobo to makambo ya mbindo, osengeli kobongola motema. Mpe ata soki na bomoi na yo mobimba ozali kosala makasi mpo na kosala makambo ya malamu, osengeli kaka kobongola motema, mpo biso nyonso tozali bato ya masumu mpe tosengeli kosɛnga Nzambe alimbisa biso.—Baroma 3:23; 5:12.
13. ‘Kobongwana’ elimboli nini?
13 Koyoka kaka mawa mpo na makambo oyo osalá ekoki te. Petro alobaki ete osengeli mpe ‘kobongwana.’ Yango elimboli ete osengeli kotika bizaleli nyonso ya mabe oyo ozalaki na yango mpe kobanda kosala makambo ya malamu. Tózwa ndakisa: Kanisá ete ozali kokende esika moko mpo na mbala ya liboso. Ntango ozali kokende, omoni ete nzela oyo ozali kolanda, yango te. Okosala nini? Na ntembe te okolɛmbisa makolo, otɛlɛmi, obaluki, mpe na nsima okei na nzela oyo esengeli. Ndenge moko mpe, lokola ozali
koyekola Biblia, okoki komona ete osengeli kobongisa bizaleli to makambo mosusu na bomoi na yo. Ndimá ‘kobongwana,’ kobongisa makambo oyo esengeli, mpe bandá kosala makambo ya malamu.KOMIPESA NA NZAMBE
14. Komipesa na Nzambe elimboli nini?
14 Likambo mosusu ya ntina oyo osengeli kosala liboso ozwa batisimo ezali komipesa na Yehova. Komipesa na Yehova elimboli kosala libondeli mpo na kolaka ye ete okosambela kaka ye, mpe kosala mokano na ye ekozala na esika ya liboso na bomoi na yo.—Kolimbola Mibeko 6:15.
15, 16. Nini ekotinda moto amipesa na Nzambe?
15 Kolaka Yehova ete okosalela kaka ye ezali lokola kolaka moto oyo olingi ete okolekisa bomoi na yo mobimba elongo na ye. Kanisá ete mwasi moko ná mobali moko bazali kolulana. Ntango mobali abandi koyeba mwasi yango malamu, akokóma kolinga ye lisusu mingi mpe akolinga kobala ye. Ata soki ezali ekateli moko monene, mobali yango akondima mokumba yango mpo alingi mwasi yango.
16 Ndenge moko mpe yo; lokola oyebi makambo ya Yehova mingi, okómi kolinga ye mpe olingi kosala nyonso oyo okoki mpo na kosalela ye. Yango ekotinda yo osala libondeli mpo na kolaka ye ete okosalela ye. Biblia elobi ete moto nyonso oyo alingi kolanda Yesu asengeli ‘komiboya.’ (Marko 8:34) Yango elimboli nini? Elimboli kotosa Yehova liboso ya kotosa moto mosusu nyonso. Makambo oyo Yehova alingi ezali na ntina mingi koleka bamposa na yo mpe makambo oyo okani kosala.—Tángá 1 Petro 4:2.
KOBANGA TE ETE OKOKOKA TE
17. Mpo na nini bato mosusu baboyaka komipesa na Yehova?
17 Bato mosusu baboyaka komipesa na Yehova mpo babangaka ete bákokisa te elaka na bango ya kosalela ye. Balingaka te koyokisa Yehova mawa, to bakoki kokanisa ete soki bamipesi na Nzambe te, bakozongisa monɔkɔ te mpo na makambo oyo bazali kosala.
18. Nini ekosalisa yo otika kokanisa ete okosala likambo oyo ekoyokisa Yehova mawa?
18 Kolinga Yehova ekosalisa yo otika kokanisa ete okosala likambo oyo ekoyokisa ye mawa. Lokola olingaka ye, okosala makasi okokisa elako na yo. (Mosakoli 5:4; Bakolose 1:10) Okomona te ete kosala mokano ya Yehova ezali kilo. Ntoma Yoane akomaki: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye; kutu mibeko na ye ezali kilo te.”—1 Yoane 5:3.
19. Mpo na nini osengeli kobanga te komipesa na Yehova?
19 Esɛngi te ozala moto ya kokoka mpo omipesa na Yehova. Asɛngaka biso te tósala makambo oyo eleki biso motó. (Nzembo 103:14) Akosalisa yo osala makambo ya malamu. (Yisaya 41:10) Tyelá Yehova motema na yo mobimba, mpe “akosembola banzela na yo.”—Masese 3:5, 6.
KOLOBA POLELE MPO NA LOBIKO
20. Nsima ya komipesa na Yehova, likambo nini osengeli kosala?
20 Okanisi ete okoki mpo na komipesa na Yehova? Nsima ya komipesa na Yehova nde okosala likambo oyo elandi. Osengeli kozwa batisimo.
21, 22. Ntango nini ‘okoloba polele’ mpo na kondima na yo?
21 Yebisá mokambi-misala ya bankulutu ya lisangá na bino ete omipesi na Yehova mpe olingi kozwa batisimo. Akosɛnga bankulutu mosusu bátalela elongo liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo ekosalema. Na liyangani yango, bakosala diskur moko oyo ekopesa ndimbola ya batisimo. Ndeko oyo akosala diskur yango akotuna baoyo bakozwa batisimo mituna mibale ya polele. Ntango okopesa biyano na mituna yango nde ‘okoloba polele’ mpo na kondima na yo.—Baroma 10:10.
na yo mateya ya Biblia oyo moto asengeli koyeba na ebandeli. Soki bankulutu yango bamoni ete okoki kozwa batisimo, bakoyebisa yo ete okozwa batisimo na22 Na nsima, okozwa batisimo. Bakozindisa yo mobimba na mai. Batisimo yango ekomonisa bato
nyonso ete omipesi na Yehova mpe okómi sikoyo Motatoli ya Yehova.BATISIMO ELAKISAKA NINI?
23. Kobatisama “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu” elakisi nini?
23 Yesu alobaki ete bayekoli na ye basengeli kobatisama “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.” (Tángá Matai 28:19.) Yango elakisi nini? Elakisi ete ondimi bokonzi ya Yehova mpe mokumba ya Yesu na mokano ya Nzambe, mpe ondimi ndenge Nzambe asalelaka elimo santu na ye mpo na kokokisa mokano na ye.—Nzembo 83:18; Matai 28:18; Bagalatia 5:22, 23; 2 Petro 1:21.
24, 25. (a) Batisimo elakisi nini? (b) Tokolobela nini na mokapo ya nsuka ya buku oyo?
24 Batisimo elakisi likambo moko ya ntina mingi. Ntango bazindisi yo na mai, ezali lokola okufi to otiki bomoi na yo ya kala. Ntango babimisi yo na mai, obandi bomoi ya sika mpo na kosala mokano ya Nzambe. Emonisi ete banda na ntango wana, okómi mosaleli ya Yehova. Kobosana te ete omipesi na moto te, na ebongiseli moko boye te, to na mosala moko boye te. Omipesi nde na Yehova.
25 Komipesa na yo ekosalisa yo okóma moninga ya Nzambe. (Nzembo 25:14) Yango elingi koloba te ete moto akobika kaka mpo azwi batisimo. Ntoma Paulo akomaki: “Bókoba kosala mpo na lobiko na bino moko na kobanga mpe na kolɛnga.” (Bafilipi 2:12) Batisimo ezali kaka ebandeli. Kasi, ndenge nini okoki kotikala penepene na Yehova? Mokapo ya nsuka ya buku oyo ekopesa eyano na motuna yango.