Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO YA ZOMI NA MITANO

Ndenge ya malamu ya kosambela Nzambe

Ndenge ya malamu ya kosambela Nzambe

1. Nani asengeli koyebisa biso ndenge ya malamu ya kosambela Nzambe?

MANGOMBA mingi etutaka ntolo ete eteyaka mateya ya solo ya Nzambe. Kasi ezali bongo te, mpo mateya oyo mangomba eteyaka, na ndakisa Nzambe azali nani mpe ndenge oyo tosengeli kosambela ye, ekeseni mpenza na ndenge Biblia elobi. Ndenge nini tokoki koyeba ndenge ya malamu ya kosambela Nzambe? Kaka Yehova nde akoki koyebisa biso ndenge oyo tosengeli kosambela ye.

2. Ndenge nini okoki koyeba ndenge ya malamu ya kosambela Nzambe?

2 Yehova apesá biso Biblia mpo tóyeba ndenge ya malamu ya kosambela ye. Na yango, yekolá Biblia mpe Yehova akosalisa yo ozwa matomba na mateya na ye mpo akipaka yo mpenza.​—Yisaya 48:17.

3. Nzambe alingi tósala nini?

3 Bato mosusu balobaka ete Nzambe andimaka mangomba nyonso; kasi Yesu ateyaki bongo te. Alobaki: “Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai: ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na bokonzi ya likoló, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai.” Na yango, tosengeli koyeba mokano ya Nzambe mpe kosala yango. Ezali na ntina mingi mpo Yesu alobaki ete bato oyo batosaka Nzambe te bazali lokola basali-mabe, ‘bato oyo babukaka mibeko.’​—Matai 7:21-23.

4. Yesu alobaki nini mpo na moto oyo alingi kosala mokano ya Nzambe?

4 Yesu akebisaki biso ete soki tolingi kosala mokano ya Nzambe, tokokutana na mikakatano. Alobaki boye: “Bókɔta na porte ya moke; mpamba te nzela ya monene mpe oyo efungwamá nde oyo ememaka na libebi, mpe bato oyo bazali kokɔta kuna bazali mingi; nzokande porte oyo ya moke mpe nzela ya nkaka yango nde ememaka na bomoi, mpe bato oyo bazali komona yango bazali moke.” (Matai 7:13, 14) Nzela ya nkaka, to ndenge ya malamu ya kosambela Nzambe, ememaka na bomoi ya seko. Nzela oyo efungwamá, to ndenge ya mabe ya kosambela Nzambe, ememaka na liwa. Kasi, Yehova alingi ete moto ata moko te akufa. Apesi moto nyonso libaku ya koyekola makambo na ye.​—2 Petro 3:9.

NDENGE YA MALAMU YA KOSAMBELA NZAMBE

5. Ndenge nini okoki koyeba bato oyo basambelaka Nzambe na ndenge ya malamu?

5 Yesu alobaki ete tokoki koyeba bato oyo basambelaka Nzambe na ndenge ya malamu. Tokoyeba bango soki totaleli mateya na bango mpe misala na bango. Alobaki boye: “Bokoyeba bango na mbuma na bango.” Mpe abakisaki: “Nzete nyonso ya malamu ebotaka mbuma ya malamu.” (Matai 7:16, 17) Yango elingi koloba te ete baoyo basambelaka Nzambe bazali bato ya kokoka. Kasi, basaleli ya Nzambe basalaka ntango nyonso makasi mpo básala makambo ya malamu. Sikoyo tótalela makambo oyo ekosalisa biso tóyeba bato oyo basambelaka Nzambe na ndenge ya malamu.

6, 7. Mpo na nini losambo ya solo eteyaka makambo oyo euti na Biblia? Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?

6 Mateya na biso esengeli kouta na Biblia. Biblia elobi: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disiplini na boyengebene, mpo moto ya Nzambe akoka mpenza, azala na nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.” (2 Timote 3:16, 17) Ntoma Paulo akomelaki bakristo ete: “Ntango boyambaki liloba ya Nzambe, oyo boyokaki epai na biso, bondimaki yango, lokola liloba ya bato te, kasi, ndenge yango ezali mpenza, lokola liloba ya Nzambe.” (1 Batesaloniki 2:13) Mateya ya losambo ya solo eutaka kaka na Biblia, Liloba ya Nzambe. Eutaka na makanisi ya bato te, na bonkɔkɔ ya bato mpe te, to na eloko mosusu nyonso te.

7 Makambo nyonso oyo Yesu ateyaki eutaki na Liloba ya Nzambe. (Tángá Yoane 17:17.) Mbala mingi azalaki kozongela maloba ya Makomami. (Matai 4:4, 7, 10) Basaleli ya solo ya Nzambe balandaka ndakisa ya Yesu mpe bateyaka kaka makambo oyo euti na Biblia.

8. Yesu ateyaki nini mpo na kosambela Yehova?

8 Tosengeli kosambela kaka Yehova. Nzembo 83:18 elobi: “Yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.” Yesu alingaki bato báyeba mpenza Nzambe ya solo mpe alakisaki bango nkombo ya Nzambe. (Tángá Yoane 17:6.) Yesu alobaki: “Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.” (Matai 4:10) Yango wana, lokola tozali basaleli ya Nzambe, tozali kolanda ndakisa ya Yesu. Tozali kosambela kaka Yehova, tobengaka ye na nkombo na ye, mpe toteyaka bato nkombo yango mpe makambo oyo akosalela biso.

9, 10. Ndenge nini tomonisaka ete tolinganaka?

9 Tosengeli kolinga bato na bolingo ya solosolo. Yesu ateyaki bayekoli na ye ete bálinganaka. (Tángá Yoane 13:35.) Bolingo yango eponaka mboka te, mimeseno te, mozwi te, mobola te. Bolingo oyo tozali na yango kati na biso esangisi biso, ekómisi biso bandeko mpenza. (Bakolose 3:14) Yango wana, tokendaka bitumba te mpe tóbomaka bato te. Biblia elobi: “Bana ya Nzambe ná bana ya Zabolo bayebanaka na likambo oyo: Moto nyonso oyo asalaka makambo ya boyengebene te auti na Nzambe te, ndenge moko mpe moto oyo azali kolinga ndeko na ye te.” Mpe ebakisi: “Tólinganaka; ezala te lokola Kaina, oyo autaki na moto mabe mpe abomaki ndeko na ye.”​—1 Yoane 3:10-12; 4:20, 21.

10 Tosalelaka ntango na biso, makasi na biso, mpe biloko na biso mpo na kosalisana mpe kolendisana. (Baebre 10:24, 25) ‘Tosalelaka bato nyonso oyo ezali malamu.’​—Bagalatia 6:10.

11. Mpo na nini tondimaka ete Yesu azali nzela ya lobiko?

11 Tosengeli kotosa Yesu mpo azali nzela ya lobiko. Biblia elobi: “Lobiko ezali na moto mosusu te, mpo nkombo mosusu ezali te na nse ya lola, oyo epesami na kati ya bato, oyo tosengeli kobika na nzela na yango.” (Misala 4:12) Na Mokapo 5 ya buku oyo, toyekolaki ete Yehova atindaki Yesu apesa bomoi na ye ezala lisiko mpo na bato ya botosi. (Matai 20:28) Yehova aponá Yesu azala Mokonzi ya mabele. Yango wana, Biblia eyebisi biso ete, soki tolingi kozwa bomoi ya seko, tosengeli kotosa Yesu.​—Tángá Yoane 3:36.

12. Mpo na nini tokɔtaka na makambo ya politiki te?

12 Tosengeli kokɔta na makambo ya politiki te. Yesu akɔtaki na makambo ya politiki te. Ntango bazalaki kosambisa Yesu, ayebisaki Pilate, moto ya Roma oyo azalaki mokonzi ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.” (Tángá Yoane 18:36.) Lokola Yesu, tozali sembo na Bokonzi ya Nzambe oyo ezali na likoló, mpe yango wana, ezala tofandi na mboka nini, tokɔtaka na makambo ya politiki te. Nzokande, Biblia esɛngi biso tótosaka “bakonzi oyo bazali liboso,” elingi koloba, bakonzi ya Leta. (Baroma 13:1) Totosaka mibeko ya mboka oyo tofandi. Kasi, ntango mobeko moko eyokani te na mibeko ya Nzambe, tosalaka ndenge bantoma ya Yesu balobaki: “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.”​—Misala 5:29; Marko 12:17.

13. Tosakolaka nini mpo na Bokonzi ya Nzambe?

13 Tondimaka ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa bampasi na mokili. Yesu alobaki ete ‘nsango malamu ya bokonzi’ esengeli kosakolama na mokili mobimba. (Tángá Matai 24:14.) Ata guvɛrnema moko te awa na mabele ekoki kosala makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosalela biso. (Nzembo 146:3) Yesu ateyaki biso tóbondelaka mpo na Bokonzi ya Nzambe ntango alobaki ete: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:10) Biblia eyebisi biso ete Bokonzi ya Nzambe ekoboma baguvɛrnema nyonso ya bato mpe yango moko “ekotikala seko.”​—Danyele 2:44.

14. Okanisi ete banani basambelaka Nzambe na ndenge ya malamu?

14 Na kotalela makambo touti kolobela, omituna boye: ‘Banani oyo mateya na bango eutaka na Biblia? Banani bayebisaka bato nkombo ya Nzambe? Banani bazali na bolingo ya solosolo mpe bandimaka ete Nzambe atindaki Yesu mpo na kobikisa biso? Banani bakɔtaka na makambo ya politiki te? Banani bateyaka ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa mikakatano na biso?’ Ezali kaka Batatoli ya Yehova.​—Yisaya 43:10-12.

OKOSALA NINI?

15. Tosengeli kosala nini soki tolingi Nzambe andima losambo na biso?

15 Esengeli kosuka kaka te na kondima ete Nzambe azali. Kutu, ata bademo bandimaka ete Nzambe azali, kasi batosaka ye te. (Yakobo 2:19) Soki tolingi ete Nzambe andima losambo na biso, tosengeli kosuka kaka te na kondima ete azali, tosengeli mpe kotosa maloba na ye.

16. Mpo na nini tosengeli koboya lingomba ya lokuta?

16 Mpo Nzambe andima losambo na biso, tosengeli kotika lingomba ya lokuta. Mosakoli Yisaya akomaki boye: “Bóbima na kati na ye, bómibatela pɛto.” (Yisaya 52:11; 2 Bakorinti 6:17) Yango wana, tosengeli koboya eloko nyonso oyo ezali na boyokani na losambo ya lokuta.

17, 18. “Babilone monene” ezali nini, mpe mpo na nini esengeli kotika yango nokinoki?

17 Lingomba ya lokuta ezali nini? Ezali lingomba nyonso oyo eteyaka bato básambela Nzambe na ndenge oyo eyokani te na Liloba na ye. Biblia ebengi mangomba nyonso ya lokuta “Babilone Monene.” (Emoniseli 17:5) Mpo na nini? Nsima ya Mpela ya mikolo ya Noa, mateya mingi ya mangomba ya lokuta ebandaki na engumba Babilone. Mateya yango ya lokuta epalanganaki na mabele mobimba. Na ndakisa, bato ya Babilone bazalaki kosambela banzambe misatomisato. Lelo mpe, mangomba mingi eteyaka ete Nzambe azali Bosato (Trinité), kasi Biblia eteyaka polele ete Nzambe ya solo azali kaka moko, Yehova, mpe Yesu azali Mwana na ye. (Yoane 17:3) Bato ya Babilone bazalaki mpe kondima ete eloko moko ya nzoto ya moto etikalaka na bomoi nsima ya liwa mpe eloko yango ekoki konyokwama na lifelo. Ezali solo te.​—Talá Etanda 1417, mpe 18.

18 Nzambe alaki ete etikali moke mangomba nyonso ya lokuta ebomama. (Emoniseli 18:8) Omoni ntina oyo esengeli kolongwa nokinoki na lingomba ya lokuta? Yehova Nzambe alingi osala yango sikoyo, lokola ntango ezali naino.​—Emoniseli 18:4.

Soki okómi kosalela Yehova esika moko na basaleli na ye, okɔti na libota moko ya bandeko na mokili mobimba

19. Ntango ozwi ekateli ya kosalela Yehova, na ndenge nini akosalisa yo?

19 Ntango ozwi ekateli ya kolongwa na lingomba ya lokuta mpo osalela Yehova, baninga to bandeko na yo mosusu bakoyeba te mpo na nini osali bongo. Bakoki kutu kobanda konyokola yo. Kasi Yehova akosundola yo te. Okokɔta na libota moko ya ebele mpenza ya bandeko na mokili mobimba, oyo balinganaka mpenza, mpe okozala na elikya ya bomoi ya seko na mokili ya sika ya Nzambe. (Marko 10:28-30) Mbala mosusu, baninga mpe bandeko na yo mosusu oyo bazali koboya osalela Yehova bakondima koyekola Biblia na nsima.

20. Mpo na nini esengeli kosambela Nzambe na ndenge ya malamu?

20 Etikali moke mpenza, Nzambe alongola mabe nyonso mpe Bokonzi na ye eyangela mabele mobimba. (2 Petro 3:9, 13) Ekozala malamu mpenza! Moto nyonso akosambela Yehova na ndenge oyo Yehova alingaka tósambela ye. Yango wana, salá noki mpe luká kosambela Nzambe na ndenge ya malamu.