KOSAKOLA MPE KOTEYA NA MOKILI MOBIMBA
Afrika
-
MIKILI 58
-
BATO 994 839 242
-
BASAKOLI 1 421 375
-
BAYEKOLI YA BIBLIA 3 516 524
Balandaki molakisi na bango
José, ndeko mobali moko oyo azali mobongisi-nzela, afandaka na nsuka mpenza ya engumba Luanda, na Angola. Atángisaka na eteyelo moko oyo ezali pembeni ya Ndako ya Bokonzi. Lokola azali na bizaleli malamu mpe ayebi kotángisa, bana-kelasi na ye 86 balingaka ye mingi mpe batosaka ye. Na kati ya pɔsɔ, lisangá na bango ebandaka makita na ngonga ya 16:00. Na yango, bapesá ye ndingisa ya kosilisa
mosala liboso ngonga ekoka, mpe akendaka mbala moko na Ndako ya Bokonzi.Bana-kelasi mosusu bamitunaki ntina oyo José alongwaka liboso ngonga ekoka mpe epai wapi akendaka. Mokolo moko, bana-kelasi mibale balandaki ye, mpe bakɔtaki makita. Na nsima, bana-kelasi mosusu misato bakendaki makita mokolo José azalaki na lisolo na Likita ya mosala. Nsango yango epanzanaki na kelasi mobimba. Na bapɔsɔ oyo elandaki, bana-kelasi oyo bazalaki kokɔta makita bakómaki 21. Bandeko batunaki bana yango soki balingi koyekola Biblia, mpe mingi bandimaki. Ntango bana yango bamemaki mwa mikanda na biso na eteyelo, bamosusu bakómaki mpe kosepela mpe babandaki koya na makita. Na nsuka ya mbula, na kati ya bana-kelasi 86 ya José, bana 54 bazalaki koya na makita. Ndeko José alobaki ete bana-kelasi na ye 23 bazali kokola malamu na elimo mpe bazali kokoba koyangana na makita.
Teritware ekokoka te?
Ntango ndeko Joseph ná mwasi na ye Evezi, oyo bazali babongisi-nzela monene, bakómaki na teritware ya sika oyo batindaki bango na Nigeria, basakoli ebele oyo balɛmbá na elimo bayebisaki bango ete: “Teritware na biso ekokoka bino te. Toteyá bisika nyonso.” Nsima ya mbula moko, ndeko Joseph akomelaki Betele boye: “Tosakolaka mikolo nyonso na teritware na biso mpe tozali kosalisa bato bálongola makanisi ya mabe mpe básepela na solo. Tobimaka na aparɛyi ya kobɛta DVD mpo na kolakisa bana video, ata mpe bilenge ná mikóló. Nini esalemi? Ngai ná mwasi na ngai tozali koyekola Biblia na bato 18 sanza na sanza, mpe na bantango mosusu tokokaka te
kotala bayekoli na biso nyonso ya Biblia. Lisusu, bana basɛngaka biso ntango nyonso tólakisa bango ‘bavideo ya Caleb.’”Bato ya esanga moko basɛngi lisalisi
Na sanza ya minei na 2014, biro ya filiale ya Congo (Kinshasa) ezwaki mokanda moko ya kosimba motema oyo eutaki epai ya babomi-mbisi oyo bafandaka na Ibinja, esanga moko na Laki Kivu. Mibali yango bakendaka
mingi na bamboka ya pembeni mpo na kosala mombongo. Na mobembo moko, bakendaki na Bukavu, mpe bakutanaki na Batatoli ya Yehova. Batatoli bateyaki bango nsango malamu ya Biblia mpe bapesaki bango Biblia ná mikanda mosusu.Babomi-mbisi yango basepelaki na makambo oyo batángaki mpe bayebisaki bato mosusu ya esanga makambo oyo bayekolaki. Lokola bato mingi basepelaki, babomi-mbisi batindaki moko na bango azonga na Bukavu koluka Batatoli mpe kosɛnga bango báya na Ibinja. Lokola moto yango amonaki bango te, atindelaki biro ya filiale mokanda, alobaki: “Bótindela biso Batatoli báya kosalisa biso mpo tóyeba Biblia lokola bango mpe tóyeba nini tósala mpo tózwa bomoi ya seko. Tokopesa bango bisika ya kolala. Ngai nakopesa lopango na ngai mpo na kotonga ndako-nzambe. Bavɛrsɛ ya Biblia oyo ezali na babuku na bino emonisi biso ete basango ná bapastɛrɛ bateyaka biso makambo ya lokuta. Tondimi ete tomoni lingomba ya solo. Ezali na bato ebele awa na Ibinja oyo bakosepela koyekola Biblia mpe kokóma Batatoli ya Yehova.”
Mokanda yango emonisaki ete bato soki 40 na esanga yango basepelaki na solo. Esanga Ibinja ezali na bato koleka 18 000, kasi ezali ata na Motatoli moko te. Na mbala moko, biro ya filiale etindaki na esanga yango babongisi-nzela monene mibale oyo balobaka monɔkɔ ya mboka yango.
Pastɛrɛ ye moko andimi
“Nakozanga lisusu Ekaniseli te.” Maloba yango ezali ya pastɛrɛ ya lingomba moko monene ya Protesta na Afrika ya Sudi. Nini etindaki mokonzi yango ya lingomba akende na Ekaniseli na sanza ya minei ya 2014? Nyonso ebandaki mokolo bandeko mibali mibale ya mposo ekeseni bazalaki na mosala ya kosakola mpe babɛtaki na porte na
ye. Bayebaki ete ntango mosusu pastɛrɛ yango akondima te kosolola na bango. Adaine, moko ya bandeko oyo bakendaki kuna, alobi boye: “Tokamwaki, mpo afungolaki porte mpe akɔtisaki biso. Tosololaki mingi. Akamwaki komona mondɛlɛ azali kosakola na kartye ya baindo mpe azali koloba na ye na monɔkɔ na ye. Pastɛrɛ yango andimaki koyekola Biblia mbala na mbala.”Adaine abakisi boye: “Mobali yango azalaki misionɛrɛ mpe pastɛrɛ mbula koleka 40, kasi kaka ntango akómi na mbula 80 nde azwaki biyano na mituna na ye nyonso. Alingaka buku Mekolá kondima na bango. Soki toyekoli, akangaka makanisi mosusu mpe akɔtisaka yango na mateya na ndako-nzambe na bango. Alakisaki bandimi na ye buku Biblia eteyaka mpenza nini? Ayebisaki bango ete: ‘Soki Batatoli ya Yehova bayei epai na bino na buku oyo, bóyamba bango mpe bóyoka bango mpo buku oyo etondi na biloko ya motuya ya elimo.’”
Pastɛrɛ yango ayebisaki ndeko Adaine ete bakonzi ya lingomba na bango bapamelaki ye makasi mpe bapekisaki ye kolobela makambo ya Batatoli ya Yehova na mateya na ye na ndako-nzambe. Ayebaki te asala nini. Ndeko Adaine akanisaki lisolo moko oyo ebimaki na Buku ya mobu 2013 ya Batatoli ya Yehova, oyo elobelaki sango moko na ekólo Birmanie (Myanmar). Ntango ndeko Adaine atángelaki ye yango pastɛrɛ, alobaki: “Oyo etali ngai! Nasengeli kozwa ekateli moko monene, mpe nakozela lisusu mingi te.”
Pastɛrɛ yango akendaki Ekaniseli mpo na mbala ya liboso na mokolo ya 14/04/2014, nsima na yango nde alobaki ete akozanga lisusu Ekaniseli te. Alobaki ete azwi ekateli ya kokata nsinga nyonso na lingomba ya lokuta.
Kosakola na kati ya bilanga ya kakao
Ndeko Baffour ná Aaron bazali babongisi-nzela monene na Bokabo, etúká oyo balonaka kakao na wɛsti ya Ghana. Teritware yango ezali monene, ezali na bandako ya mikemike oyo ezali mosikamosika; mpo na kokóma kuna, esengeli kolanda banzela oyo matambe ya bato efungolá na kati ya bilanga. Ezalaka mpasi te mpo moto abunga! Mokolo moko, na esika bálanda nzela oyo bamesaná, ndeko Baffour ná Aaron bazwaki nzela mosusu, mpe ememaki bango na mwa bandako epai oyo bakómá naino te. Kuna, bakutanaki na Michael ná mwasi na ye Patience, oyo basepelaki na nsango ya Biblia mpe bandimaki boyekoli na esengo mpenza. Na nsima, Michael ayebisaki bango boye: “Eleki mbula mibale, totikaki kokende ndako-nzambe mpo tomonaki makambo oyo eyokanaki te na mateya ya Biblia. Banda wana, ngai ná Patience tokómaki Biblia biso moko na bampokwa, mpo na koluka biyano na mituna na biso. Tozalaki kobondela Nzambe asunga biso tóyeba solo.” Atako esɛngaki bátambola mingi na kati ya bilanga, bakómaki mbala moko koyangana na makita. Na mbula eleki, Michael ná mwasi na ye bazwaki batisimo mpe bakómaki babongisi-nzela ya sanza na sanza. Sikoyo bango mpe balandaka banzela mikemike oyo esalemá na kati ya bilanga ya kakao mpo na koluka bato mosusu oyo ‘babondelaka Nzambe asalisa bango báyeba solo.’