Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

KOSAKOLA MPE KOTEYA NA MOKILI MOBIMBA

Amerika

Amerika
  • MIKILI 57

  • BATO 980 780 095

  • BASAKOLI 4 034 693

  • BAYEKOLI YA BIBLIA 4 339 285

Bitike bazali koyangana na makita

Angela, ndeko mwasi moko oyo afandaka na Suriname, akendaki na ndako moko oyo babɔkɔlaka bitike, mosika te na ndako na bango. Mwasi oyo azali mokambi ya esika yango azali Motatoli, kasi atiká kosakola; na yango apesaki mbala moko Angela nzela ya koteya bana. Angela asololaki na bana 85 mpe alakisaki bango bavideo ya jw.org. Eumelaki te, abandaki koyekola na bana mingi kati na bango. Abengaki babongisi-nzela mibale ya basi mpe moto na moto azwaki bana oyo akobanda koteya. Ndeko mwasi wana oyo atiká kosakola alobaki ete alakisá bana yango banzembo ya Bokonzi mpe azalaki kotángela bango masolo ya Biblia na butu. Alobaki ete azali na mposa ya koyangana na makita, kasi akoki kotika bana wana 85 bango moko te. Na yango, bibongiseli ezwamaki mpo bango nyonso báya na Ndako ya Bokonzi. Lokola bakokaki kokende na Ndako ya Bokonzi na makolo, bandeko bayaki kozwa bango nyonso. Lelo oyo, ndeko mwasi yango ná bana nyonso 85 bayanganaka mbala na mbala na makita.

Gabriel asalisaki nkɔkɔ na ye

Paraguay: Gabriel azali kosolola na nkɔkɔ na ye

Nsima ya liyangani moko ya etúká na Paraguay, ntango azalaki kozonga ndako na baboti na ye, Gabriel, oyo azali na mbula 6, azalaki kokanisa ndenge kosakola nsango ya Bokonzi ezali na ntina mingi. Na nsima, amonaki ete ezali na moto moko oyo akolinga mpenza kozala elongo na ye na Paradiso: nkɔkɔ na ye ya mobali. Kasi, nkɔkɔ yango azalaki kosepela na solo te mpe azalaki kotɛmɛla mwasi ná bana na ye, oyo bazalaki Batatoli.

Kaka mokolo yango, Gabriel asɛngaki baboti na ye bábenga bankɔkɔ na ye na Argentine na nzela ya Internet mpo bámonana na video. Gabriel amonisaki nkɔkɔ na ye ya mobali ete koyekola Biblia ezali na ntina mingi mpe atunaki ye polele: “Nkɔkɔ, olingi nayekola na yo?” Nkɔkɔ yango andimaki. Gabriel asɛngaki báyekola mwa buku Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko. Na boumeli ya mwa basanza, bayekolaki mwa buku yango elongo. Lokola bango mibale bazalaki na mokakatano ya kotánga, bazalaki komibongisa liboso. Mokolo ya boyekoli, Gabriel azalaki kobongisa liteya oyo bakoyekola mpe azalaki kolata simisi ná kravati.

Na nsima, bankɔkɔ ya Gabriel bayaki kotala libota ya ba Gabriel mpo na mwa bapɔsɔ. Na ntango yango, nkɔkɔ ya mobali mpe azalaki kokende makita elongo na libota mobimba. Ntango bazongaki na Argentine, nkɔkɔ ya mobali akobaki koyekola Biblia na ndeko moko ya kuna, akolaki na elimo tii akómaki mosakoli. Lelo, bankɔkɔ ya Gabriel babondelaka elongo mokolo na mokolo. Gabriel mpe akoli malamu. Ye mpe azali sikoyo mosakoli. Nkɔkɔ na ye alobaki ete alingi kozwa batisimo mpo na komonisa ete amipesi na Yehova.

‘Oyaki mpamba te’

Na Brésil, ntango bazalaki kokabola trakte Bakufi bakozonga mpenza na bomoi? Jennifer abɛtaki na porte ya mwasi moko oyo azalaki kosala mbangu mpo na kokende ebembe ya moninga na ye moko. Jennifer ayebisaki ye ete alingaki kaka kopesa ye trakte moko oyo elobeli elikya ya komona lisusu bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá. Ntango atángaki motó ya likambo, mwasi yango akamwaki naino, na nsima azwaki trakte yango. Ntango Jennifer atunaki ye soki akosepela kozwa mwa batrakte mosusu mpo akabolela bandeko ya mowei, mwasi yango amonaki ete ezali likanisi ya malamu mpe asɛngaki batrakte 9.

Mokolo mosusu ntango Jennifer azongelaki ye, mwasi yango alobaki na ye ete: “Na nsima ntango natikalaki kokanisa, namonaki ete koya oyo oyaki mbala ya liboso ezalaki mpamba te. Nzambe nde atindaki yo omemela ngai nsango ya kokitisa motema, nazalaki na mposa na yango makasi.” Mwasi yango akabolaki batrakte nyonso oyo azwaki. Ndeko ya libota ya mowei, oyo alobaki liboso bákende kokunda ebembe, atángaki trakte yango mobimba na mongongo makasi. Bato nyonso basepelaki mpe bapesaki mwasi yango matɔndi mpo na nsango yango ya kobɔndisa. Mwasi yango andimaki koyekola Biblia.

Kosakola na tap-tap

Bandeko misato ya Betele ya Haïti bazalaki kosala mobembo na bataxi ya langilangi oyo babengaka tap-tap. Na mobembo yango ya ngonga mibale na ndambo, bayebisaki bato oyo bazalaki na kati ya motuka nsango ya Bokonzi mpe bakabolaki bazulunalo 50 ná batrakte 30. Gurvitch, moko ya bandeko yango, atángelaki moto moko eteni ya lisolo moko na Lamuká! Elenge moko na nkombo Pépé azalaki koyoka mpe akɔtaki mbala moko na lisolo. Asɛngaki koyekola Biblia, mpe eyaki koyebana ete afandaka na teritware ya lisangá oyo ndeko Gurvitch akendaka. Banda sanza ya yambo ya 2014 ntango asololaki mpo na mbala ya liboso na Batatoli, Pépé ayanganaka na makita mpe mayangani nyonso. Akómá koyebisa basusu mateya ya Biblia oyo ayekoli mpe azali kozela bándima ye akóma mosakoli.