Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

Baba ya liboso oyo andimaki solo

José Pérez

Baba ya liboso oyo andimaki solo
  • ABOTAMAKI NA 1960

  • BATISIMO 1982

  • NA MOKUSE Ntango José azalaki mwana moke, bolingo ya bandeko ebendaki ye na solo, atako moto moko te na lisangá ayebaki elobeli ya bababa.

NTANGO nazalaki mwana moke, matoi na ngai ekufaki mpe nayekolaki elobeli ya bababa na eteyelo. Ntango nakómaki na mbula 11, nayebaki solo mpo na mbala ya liboso ntango libota moko na kartye na biso babengisaki ngai na makita ya lisangá. Atako nakangaki ntina ya makambo oyo bateyaki te, bayambaki ngai malamu mpe nazwaki ekateli ya kokoba kokende makita. Bandeko mingi ya lisangá bazalaki kobengisa ngai mpo tólya elongo mpe tósala makambo mosusu.

Nakómaki mosakoli na 1982, mpe kaka na mbula yango, nazwaki batisimo. Na 1984, nabalaki Eva, baba lokola ngai. Atako tozalaki kokanga ntina mpenza te ya mateya mosusu ya Biblia, bolingo ya bandeko nde esalisaki biso tóyeba lisangá ya Yehova mpe tozalaki kosepela koyangana na makita.Yoa. 13:35.

Na 1992, bibongiseli ezwamaki mpo na koteya bandeko elobeli ya bababa ya Amerika. Eumelaki te, bandeko yango babandaki koluka bababa mpe koteya bango nsango malamu. Na nsima, na 1994, kosakola na elobeli ya bababa ekómaki makasi koleka ntango ndeko moko ya Porto Rico ayaki ná mwasi na ye na Betele mpo na koteya bandeko 25 elobeli ya bababa.

Na nsima, na mbula yango kaka, ngai ná Eva tobandaki kokende makita na etuluku ya elobeli ya bababa oyo eutaki kosalema. Ezali kaka ntango tokómaki kokɔta makita na elobeli ya bababa nde tobandaki kokanga ntina malamumalamu ya mateya ya Biblia, na ndakisa ntembe oyo Satana abɛtɛlaki lotomo ya Yehova ya kozala mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe ntina ya Bokonzi ya Masiya na mokano ya Nzambe.

Na mokolo ya 01/12/1995, masangá ya elobeli ya bababa esalemaki na Saint-Domingue mpe na Santiago. Na sanza ya mwambe na 2014, masangá ya elobeli ya bababa ezalaki 26 mpe bituluku 18.

Monɔkɔ ya liboso oyo ngai ná Eva tolakisaki bana na biso misato ezali elobeli ya bababa. Éber, mwana na biso ya mobali ya liboso, apesaka mabɔkɔ na kobongola mikanda na elobeli ya bababa na Betele ya États-Unis. Ngai nazali mosaleli na misala na lisangá, mpe Eva azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza.