Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

Koyeba solo

Koyeba solo

Babandi koyeba solo

Na mokolo ya lomingo, mwa 01/04/1945, Lennart Johnson ná mwasi na ye Virginia, oyo bautaki na kelasi ya Gileade bakómaki na Ciudad Trujillo (lelo Saint-Domingue), engumba-mokonzi ya République dominicaine. Lokola bazalaki Batatoli ya liboso na ekólo yango, lisolo ya Batatoli ezalaki te, kaka ya matata mpe bitumba. * Buku ya mobu 1946 elobaki boye: “Teritware yango ezali naino mobimba mpenza, mpe bandeko wana ya Gileade basengelaki kobanda kopasola yango.” Kanisá naino: Betele ezalaki te, Ndako ya Bokonzi te, lisangá mpe te. Bamisionɛrɛ yango bayebaki ata moto te na mboka yango, bayebaki monɔkɔ ya Espagnol malamu te, bazalaki na ndako te, biloko ya ndako mpe te. Basalaki nini?

Ndeko Lennart alobaki boye: “Tokendaki na Otɛlɛ Victoria mpe tozwaki esika ya kofanda: tozalaki kofuta dolare 5 na mokolo mpo na kolala mpe kolya. Kaka na nsima ya midi ya mokolo oyo tokómaki, tobandaki koyekola Biblia na bato. Esalemaki ndenge nini? Basi mibale ya République dominicaine oyo tozalaki koyekola na bango Biblia na Brooklyn bapesaki biso bankombo ya bandeko mpe baninga na bango, moko na bango Doktɛrɛ Green. Ntango tokendaki kotala ye, tokutaki mpe Moses Rollins, moninga na ye ya kartye. Ntango toyebisaki bango ndenge oyo tozwaki bankombo mpe baadrɛsi na bango, bayokaki na likebi mpenza nsango ya Bokonzi mpe bandimaki koyekola Biblia. Eumelaki te, Moses akómaki mosakoli ya liboso na ekólo yango.”

Bamisionɛrɛ mosusu minei bayaki na ebandeli ya sanza ya motoba na 1945, mpe na mwa ntango moke, bakabolaki mikanda ebele mpe babandaki koyekola Biblia na bato ebele. Na sanza ya zomi, emonanaki ete esengeli koluka esika ya kosala makita. Na yango, bamisionɛrɛ bakómisaki ndako na bango Ndako ya Bokonzi mpo na mwa ntango. Bato soki 40 bazalaki koya na makita.

Moko ya bato ya liboso oyo bandimaki solo ezalaki Pablo Bruzaud, oyo bato nyonso bazalaki kobenga Palé. Azalaki kosala na bisi oyo esalaka kende-zongá na engumba Satiago mpe Ciudad Trujillo; na yango azalaki koya mingi na engumba-mokonzi. Mokolo moko ntango azalaki na Ciudad Trujillo, Palé asololaki na bamisionɛrɛ mibale mpe andimaki buku “La vérité vous affranchira.” Abandaki koyekola Biblia na bango mokolo na mokolo. Eumelaki te, Palé abandaki kosakola elongo na bamisionɛrɛ mpe komema bango na motuka. Na nsima, akutanaki na ndeko Lennart Johnson mpe asalaki na ye mobembo longwa na engumba Ciudad Trujillo tii na engumba Santiago, bakatisaki bangomba mpo na kokóma na Puerto Plata, mboka moko na bokula ya mbu. Bakendaki kotala mwa etuluku moko ya bato oyo basepelaki na solo mpe batindaki mokanda na biro monene na Brooklyn, na New York, mpo na kotuna mituna.

Ndeko Knorr ná ndeko Franz bayei

Na sanza ya misato na 1946, ndeko Nathan Knorr mpe Frederick Franz bautaki na biro monene mpe bayaki na République dominicaine. Bato bazalaki kozela bango mpenza, mpe longola bandeko, bato 75 oyo basepelaki na solo bayaki koyoka diskur ya ndeko Knorr. Na vizite yango, ndeko Knorr azwaki bibongiseli mpo na kofungola Betele na République dominicaine.

Ndeko Knorr ná ndeko Franz na Ndako ya Bokonzi ya libosoliboso, na Ciudad Trujillo

Bamisionɛrɛ mosusu bayaki, mpe na nsuka ya mobu ya mosala 1946, basakoli bakómaki 28. Lokola nsango malamu eutaki kokɔta sika na ekólo yango, bamisionɛrɛ balekisaki ntango mingi na bampokwa mpo na kokabola teritware yango mpe kobongisa malamu mosala ya kosakola.

Mosala ebandi kokola

Na 1947, basakoli bakómaki koleka 59. Kaka na mbula yango, bamisionɛrɛ mosusu oyo bazalaki liboso na Cuba batindamaki na République dominicaine. Kati na bango Roy Brandt, ná mwasi na ye Juanita. Ndeko Brandt atyamaki mokɛngɛli ya filiale mpe asalaki yango na boumeli ya mbula 10.

Na nsuka ya mobu ya mosala 1948, basakoli ya nsango malamu soki 110 basalaki elongo na bamisionɛrɛ ya mpiko. Kasi, basakoli yango ya molende bayebaki te ete mikakatano minene ezalaki kozela bango.

^ par. 1 Mikanda ya moombo ya sembo ebandá kokabolama na République dominicaine na 1932, kasi, koteya bato oyo basepeli na solo ebandaki na 1945, ntango ndeko Johnson ná mwasi na ye bayaki.