Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

Bakɔti bolɔkɔ mpe mosala epekisami

Bakɔti bolɔkɔ mpe mosala epekisami

Bakɔti bolɔkɔ mpo baboyi mosala ya soda

Enrique Glass mpe bolɔkɔ ya nse ya mabele epai asalaki pɔsɔ mibale

Na mokolo ya 19/06/1949, bato ya politiki ya République dominicaine oyo bakimá mboka bayaki mpo na kokweisa mokonzi mabe Rafael Trujillo. Atako likambo yango esimbaki ata moke te, guvɛrnema ya Trujillo ekómaki kokanga bato oyo baboyaki mosala ya soda, mpe bato nyonso oyo guvɛrnema emonaki ete bazali banguna. Ndeko León, Enrique mpe Rafael Glass, elongo na baninga ya mosala ya ndeko León, oyo bazalaki mpe Batatoli ya Yehova, bazalaki na kati ya Batatoli ya liboso oyo bakɔtaki bolɔkɔ mpo baboyaki mosala ya soda.

Ndeko León alobaki boye: “Basoda oyo basalaka mosala na nkuku bakangaki [ngai ná baninga na ngai ya mosala] mpe batunaki biso mituna. Nsima ya konyokola biso, babimisaki biso; kasi mwa mikolo na nsima babengaki biso na mosala ya soda na makasi. Lokola toboyaki, bakɔtisaki biso na bolɔkɔ. Kuna, tokutaki bandeko mibali mosusu minei, mibale bazalaki bandeko na ngai ya libota. Ntango babimisaki biso, na nsima bakatelaki biso lisusu etumbu. Esalemaki bongo mbala misato, tozalaki koumela libándá kaka mokolo moko to mibale. Tolekisaki mbula pene na nsambo na bolɔkɔ; na mbala ya nsuka tosalaki mbula mitano.”

‘Ata ntango babɛtaki biso fimbo mpe na mandoki, tokangaki motema, mpo Yehova apesaki biso makasi ya koyika mpiko’

Bomoi ya bolɔkɔ ezalaki kotya bandeko na komekama makasi. Bakangami mosusu mpe bakɛngɛli bazalaki kofinga bango butu moi. Fort Ozama, mokonzi ya bolɔkɔ oyo batyaki bango liboso, alobaki boye: “Bino Batatoli ya Yehova, soki bokómi batatoli ya Zabolo, bóyebisa ngai, nakobimisa bino.” Kasi, banguna balongaki te kobebisa bosembo ya bandeko yango. Ndeko León apesi ntina, alobi: ‘Yehova azalaki ntango nyonso kopesa biso makasi ya koyika mpiko mpe ata na makambo ya mikemike tozalaki komona lobɔkɔ na Ye. Ata ntango bazalaki kobɛta biso fimbo oyo ezali na etubeli mpe na mandoki, tozalaki kokanga motema, mpo Yehova azalaki kopesa biso makasi ya koyika mpiko.’

Mosala ya Batatoli ya Yehova epekisami

Na bingumba mingi na ekólo mobimba, banguna ya losambo ya solo bazalaki se kobakisa botɛmɛli. Atako bongo, na sanza ya mitano na 1950, basakoli bazalaki 238, longola bamisionɛrɛ. Basakoli 21 bazalaki babongisi-nzela ya sanza na sanza.

Zulunalo oyo eyebisaki ete bakangi bandeko mpo baboyi mosala ya soda

Nzokande, moto moko oyo asalaka baankɛtɛ na nkuku akomelaki sɛkrɛtɛrɛ ya prezida ete: “Bato ya mwa lingomba ya Batatoli ya Yehova bazali kokoba kosala makambo na bango na molende na bakartye nyonso ya engumba oyo [Ciudad Trujillo].” Abakisaki ete: “Na mbala oyo lisusu, nalobi ete esengeli kotya miso epai ya Batatoli ya Yehova mpo mosala na bango ya kosakola mpe makambo na bango ezali kobulunganisa bato mpe kobebisa mpenza makanisi na bango.”

Antonio Hungría, sɛkrɛtɛrɛ oyo azalaki kotalela makambo ya mboka mpe ya polisi ayebisaki ndeko Brandt akoma mokanda mpo na kolimbola ndenge Batatoli batalelaka mosala ya soda, kopesa bɛndɛlɛ losako, mpe kofuta mpako. Na mokanda yango, ndeko Brandt asalelaki makanisi ya buku “Que Dieu soit reconnu pour vrai!” Atako bongo, na mokolo ya 21/06/1950, Sɛkrɛtɛrɛ Hungría abimisaki mobeko oyo epekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova na République dominicaine. Babengisaki ndeko Brandt na biro ya Hungría mpo ayoka ekateli yango na matoi na ye moko. Ndeko Brandt atunaki soki bamisionɛrɛ basengeli kolongwa na mboka. Hungría alobaki ete bakoki kotikala soki batosi mobeko yango mpe batiki koyebisa bato makambo ya lingomba na bango. *

^ par. 1 Mwa bapɔsɔ liboso ya ekateli yango, basango ya Katolike bakomaki masolo milai na bazulunalo ya ekólo mpo na kofunda Batatoli ya Yehova mpe kokosela bango makambo ete bazali Bakoministe.