Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

Balingaka bandeko na bango

Balingaka bandeko na bango

Eteyelo ya sika ekokisi mposa ya basakoli

Yehova apambolaki mosala makasi ya basaleli na ye na République dominicaine. Na 1994, basakoli ya Bokonzi bazalaki 16 354 na masangá 259. Lokola bokoli ezalaki makasi mpenza, esengelaki kozala na bankulutu mpe basaleli na misala oyo babongi. Kaka na mbula yango, Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki ete Eteyelo mpo na kobongisa basungi (lelo Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi) esalema na République dominicaine.

Na sanza ya zomi na 2011, bandeko soki 600 basilaki kozwa formasyo na bakelasi 25 oyo esalemaki na ekólo yango. Lelo, bandeko yango mingi bazali na mosala ya ntango nyonso, 71 bazali babongisi-nzela monene, mpe 5 bazali na mosala ya zongazonga. Bakelasi 10 ya liboso esalemaki na Betele, kasi kobanda na kelasi ya mbala ya 11, eteyelo yango esalemaka na bandako oyo etongami mpo na yango na engumba Villa González.

“Batatoli ya Yehova basalisaka bandeko na bango”

Na mokolo ya 22/09/1998, mopɛpɛ makasi oyo babengaki Georges ebɛtaki République dominicaine mpe ebebisaki biloko mingi. Bato ebele bazangaki esika ya kofanda, mpe bato koleka 300 bakufaki. Komite ya kosalisa bandeko oyo bazwi likama ekómisaki lopango ya Ndako ya Bokonzi ya La Romana esika ya kosunga bandeko. Bandeko pene na 300 bazalaki kosala wana, kati na bango bandeko oyo bautaki bikólo 16.

Esengelaki kobongisa to kotonga Bandako ya Bokonzi 23 mpe bandako ya bandeko koleka 800. Na ndakisa, Carmen, ndeko mwasi moko ya mobange oyo azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza, ayokaki mawa mingi mpo mopɛpɛ ebebisaki esika afandaka esali mbula 38. Kasi, asepelaki makasi ntango bandeko 15 bayaki kotya fondasyo mpo na kotongela ye ndako ya sika. Carmen alobi boye: “Yehova abosanaka biso te, mpe akokisaka bamposa na biso. Talá ndako kitoko oyo bandeko bazali kotongela ngai. Bato ya kartye balobaki: ‘Batatoli ya Yehova basalisaka bandeko na bango; balinganaka mpenza.’” Maloba ya ndenge wana elobamaki na bisika mingi ya ekólo epai Batatoli ya Yehova basungaki bandeko na bango oyo bazwaki likama.

Atako mopɛpɛ wana esalaki mabe mingi, bolingo ya basaleli ya Yehova etindaki bango básunga bandeko na bango na mosuni mpe na elimo. Longola nyonso wana, elimo na bango ya komipimela ekumisaki Yehova, mobɔndisi ya solosolo.

Mosala monene ya kotonga Bandako ya Bokonzi

Lokola bato mingi bazalaki koya na lisangá ya Yehova, esengelaki kotonga Bandako ya Bokonzi ebele. Na yango, na sanza ya zomi na moko na 2000, bandeko ya République dominicaine babandaki kotonga Bandako ya Bokonzi na lisalisi ya ebongiseli oyo ezwamaki mpo na bikólo oyo ezali na bozwi mingi te. Na yango, lisangá moko ekokaki kozwa Ndako ya Bokonzi ya malamu mpe ya kitoko nsima ya pɔsɔ soki mwambe mpamba. Na sanza ya libwa na 2011, baekipi mibale batongaki to babongisaki Bandako ya Bokonzi soki 145.

Bandako yango mpe bandeko oyo bapesaki mabɔkɔ na mosala ya kotonga bapesaki litatoli monene. Na ndakisa, na engumba moko moke na nɔrdi-ɛsti, bandeko bamonaki esika moko ya malamu epai bakoki kotonga Ndako ya Bokonzi. Ndeko moko ya mobongisi-nzela monene asololaki na nkolo-lopango yango mpo básomba yango. Mobali yango alobaki boye: “Bólekisa ntango mpamba te, nakotɛkela bino esika yango te, mingimingi lokola bolingi kotonga ndako-nzambe.”

Mwa moke na nsima, nkolo esika yango akendaki engumba Puerto Plata kotala yaya na ye ya mobange oyo azali Motatoli ya Yehova. Ntango akómaki kuna, akutaki libota moko ya Batatoli ezwá ndeko na ye yango oyo azalaki kobela báfanda elongo mpo na kosalisa ye. Libota yango ezalaki komema ye na lopitalo, na makita, mpe na mosala ya kosakola. Moto yango atunaki yaya na ye soki afutaka mbongo boni mpo na nyonso oyo libota wana esalelaka ye. Alobaki: “Nafutaka eloko te. Bazali bandeko na ngai.”

“Mbala ya liboso namona bato bazali kosala na bomoko mpe na boboto boye”

Boboto ya Batatoli ya Yehova esimbaki motema ya moto yango mpe abengaki ndeko wana mobongisi-nzela monene mpo na koyebisa ye ete abongoli makanisi mpe andimi kotɛka esika yango. Bandeko basombaki lopango yango mpe babandaki kotonga. Liboso mwasi ya nkolo-lopango wana azalaki kolinga Batatoli ya Yehova te. Kasi ntango amonaki ndenge bandeko bazalaki kosala na bomoko, alobaki ete: “Mbala ya liboso namona bato bazali kosala na bomoko mpe na boboto boye.”