Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

Bokoli monene ekosalema

Bokoli monene ekosalema

Bato ya bizaleli malamu

Batatoli ya Yehova bazali na République dominicaine esali mbula soki 70. Na boumeli ya ntango yango, bayebani lokola bato ya bizaleli malamu. Mbala mingi, na mosala ya kosakola, bato bapusanaka pembeni ya basakoli mpo na kosɛnga mikanda, mpe okoyoka bato bazali koloba: “Nalingaka lingomba oyo,” to mpe “Botosaka mpenza mibeko ya Biblia.”

Na ndakisa, talá likambo oyo esalemaki ntango bazalaki kotonga Ndako ya Bokonzi na lopango oyo ndeko moko apesaki likabo. Ntango ndeko yango akendaki kosalisa mikanda ya lopango, amonaki ete moto mosusu asalisá mikanda na yango na ndenge ya moyibi, mpe alobaki ete ndeko na biso alingi kobɔtɔla ye mabele. Bamemaki likambo yango na tribinale. Likambo yango ezalaki mindɔndɔ mpo moto wana asalisaki mikanda oyo emonisaki ete ye nde nkolo-lopango.

Na tribinale, zuzi atunaki avoka ya ndeko wana soki azali kosamba mpo na nani. Ntango avoka yango alobaki ete azali koluka bolamu ya ebongiseli moko ya Batatoli ya Yehova, zuzi alobaki ete: “Soki ezali bongo, boye ntina ya kotya ntembe na makambo oyo olobi ezali te. Nayebi Batatoli ya Yehova, nayebi malamu ete balobaka solo. Bakoki ata moke te kobuba moto to kozwa eloko oyo ezali ya bango te.”

Ntango bamonisaki makambo ndenge na ndenge na tribinale, emonanaki polele ete mobali wana asalaki mikanda ya moyibi; na yango zuzi alongisaki Batatoli. Ndeko wana ya avoka alobaki boye: “Ezalaki mbala ya liboso te. Na batribinale mingi na ekólo, soki olobi ete ezali likambo ya Batatoli ya Yehova, batalelaka likambo yango na limemya makasi.”

Bongo lobi ekozala ndenge nini?

Toyebi te soki bato boni lisusu ya mitema sembo bakondima koyekola Biblia mpe bakokóma basaleli ya Nzambe ya solo. Kasi, milende ezali kosalema mpo na kokutana na bato yango. Na ndakisa, na 2013, Batatoli ya Yehova na République dominicaine basakolaki ngonga koleka milio 11, mpe bayekolaki Biblia na bato 71 922. Likambo mosusu ya kolendisa ezali ete bandeko 9 776 basalaki mosala ya mobongisi-nzela. Na sanza ya mwambe ya mbula yango kaka, basakoli ya molende bakómaki 35 331. Longola yango, emonani ete bokoli monene ekosalema mpo bato 127 716 bayaki na Ekaniseli.

Mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli na République dominicaine ebandaki na mokolo moko ya lomingo, na sanza ya minei na 1945 ntango Lennart Johnson ná mwasi na ye Virginia bayaki mpe babandaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Batatoli ya Yehova na République dominicaine basepelaka mingi na libula na bango ya elimo. Bazalaka na botɔndi mpo na mpiko mpe elimo ya komipimela ya bandeko oyo bazalaki liboso na bango. Kasi basepelaka mingi koleka na libaku malamu oyo bazali na yango lelo ya ‘kopesa litatoli malamumalamu mpo na bokonzi ya Nzambe.’ (Mis. 28:23) Bazelaka mokolo oyo bato nyonso ya esanga yango mpe bandeko na bango basaleli ya Yehova na mokili mobimba bakoyemba elongo ete: “Yehova ye moko akómi mokonzi! Mabele ezala na esengo. Ebele ya bisanga esepela.”Nz. 97:1.