Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

Botɛmɛli ya makasi

Botɛmɛli ya makasi

“Tokosilisa bango nyɛɛ”

Ndeko Borbonio Aybar azwaki batisimo na mwa 19/01/1955 ntango mosala ya Batatoli ya Yehova ezalaki naino na epekiseli. Nsima ya batisimo na ye, ayekolaki Biblia na bato ebele na engumba Monte Adentro mpe na Santiago. Ntango epekiseli elongwaki na 1956, bayekoli na ye mosusu bazwaki batisimo, ata mpe mwasi na ye.

Na katikati ya sanza ya nsambo na 1957, bakonzi ya guvɛrnema bafandelaki Batatoli ya Yehova likita na engumba Salcedo. Ndeko Aybar alobi boye: “Francisco Prats-Ramírez nde azalaki molobi ya libosoliboso. Prats-Ramírez alobaki ete, ‘etikali kaka mwa mikolo moke, tokosilisa bango nyɛɛ.’” Mwa mikolo na nsima, na mokolo ya 19/07/1957 bapolisi bakangaki Batatoli ya Yehova nyonso ya mboka Blanco Arriba, na El Jobo, na Los Cacaos, mpe na Monte Adentro.

Ndeko Aybar abakisi boye: “Bakangaki mpe ngai. Bamemaki biso na biro monene ya basoda na engumba Salcedo. Ntango kaka tokómaki kuna, kolonele moko na nkombo Saladín abɛtaki ngai. Azalaki na nkanda makasi ntango azalaki kogangela biso. Na nsima, batyaki biso na molɔngɔ mibale: moko ya mibali mosusu ya basi. Bakɛngɛli babandaki konyata mpe kobɛta mibali mpe kotuba basi banzete oyo basimbaki na mabɔkɔ, mpe bango nyonso bazalaki koloba ete: ‘Nazali moto ya Katolike mpe nabomaka.’”

“Natángaka Biblia, mpe nayebi ete Yehova azali Nzambe”

Bafutisaki ndeko Aybar lomande mpe bakatelaki ye sanza misato ya bolɔkɔ. Abakisi boye: “Ntango tozalaki na bolɔkɔ, mokonzi moko ya basoda na nkombo Santos Mélido Marte ayaki kotala biso. Alobaki na biso boye: ‘Natángaka Biblia, mpe nayebi ete Yehova azali Nzambe. Bosali eloko te oyo esɛngi bókɔta bolɔkɔ, kasi nakoki kosalisa bino te mpo bato oyo basali ete bókɔta bolɔkɔ ezali baepiskɔpɔ ya Katolike. Kaka bango moko baepiskɔpɔ to jefe (“patrɔ,” Trujillo)’ nde bakoki kobimisa bino.”

“Boye, yo nde patrɔ?”

Na bato oyo bakangaki, ezalaki mpe na mwana ya Fidelia Jiménez mpe bana ya leki na ye; Fidelia nde ayekolaki Biblia na bango nyonso. Atako bapolisi bakangaki Fidelia te, ye moko ayaki komitika epai ya bakonzi mpo bákɔtisa ye na bolɔkɔ mpo akoka kolendisa baoyo bazalaki kuna. Na ntango yango, Ludovino Fernández, mokonzi monene ya basoda oyo azalaki motema mabe mpe azalaki moto ya lolendo mpe ya nkanza, ayaki kotala bolɔkɔ yango. Abengaki Fidelia mpe atunaki ye ete, “Boye yo nde patrɔ?”

Fidelia alobaki: “Te. Bino nde bapatrɔ.”

Fernández abakisaki ete: “Kasi, ozali pastɛrɛ?”

Fidelia azongisaki: “Te. Yesu nde pastɛrɛ.”

Fernández alobaki: “Ezali mpo na yo te nde bato oyo nyonso bazali na bolɔkɔ? Yo nde oteyaki bango, boye te?”

Fidelia azongisaki: “Te. Ezali mpo na Biblia nde bato yango bazali na bolɔkɔ. Basalelaka makambo oyo bayekoli na Biblia.”

Na mbala moko, bandeko mibali mibale, oyo bazalaki mpe na bolɔkɔ, Pedro Germán ná Negro Jiménez, ndeko ya Fidelia, bazalaki koleka na kulware. Balongolaki bango na esika oyo bazalaki kaka bango mibale mpo na kotya bango na esika ya bato nyonso ya bolɔkɔ. Simisi ya Negro ezalaki na makila ekauká, mpe liso ya Pedro evimbaki makasi. Ntango Fidelia amonaki ete babɛtaki bango makasi, atunaki mokonzi yango ete: “Boye nde bosalaka bato ya malamu, ya sembo, mpe oyo babangaka Nzambe?” Ntango Fernández amonaki ete Fidelia azalaki kobanga ye te, azongisaki ye na bolɔkɔ.

Esɛngaki kozala na mpiko liboso ya botɛmɛli ya makasi ndenge wana—mpe basaleli ya sembo ya Yehova bazalaki mpenza na mpiko! Ata bakonzi ya guvɛrnema bandimaki yango. Na ndakisa, na mokolo ya 31/07/1957, Luis Arzeno Colón, inspecteur ya prezida, akomelaki secrétaire d’État mpe amilelaki ete: “Atako Likita monene ya ekólo euti kobimisa mobeko oyo elobi ete makambo ya losambo ya mwa lingomba ya Batatoli ya Yehova epekisami na Leta, bato mingi ya lingomba yango bazali kaka kokoba.”