Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

Koningana ya mabele na Haïti

Koningana ya mabele na Haïti

Bokoli na teritware ya Chinois

Na 2005, Betele elongolaki ndeko Tin Wa Ng na Betele mpe etindaki ye mobongisi-nzela monene mpo na koteya ebele ya ba-Chinois oyo bayá na République dominicaine. Ndeko yango abotamá mpe akolá na République dominicaine. Baboti na ye bautá Chine kasi bayá kofanda na Saint-Domingue.

Na mokolo ya 01/01/2008, lisangá ya monɔkɔ ya Chinois Mandarin efungwamaki na Saint-Domingue mpe na 2011, etuluku moko efungwamaki na Santiago. Basakoli 70, kati na bango babongisi-nzela ya sanza na sanza 36, mpe ebele ya babongisi-nzela basungi bayekolaka Biblia na bato soki 76 sanza na sanza.

Koluka bato oyo balobaka Lingelesi

Na 2007, ezalaki na basakoli 27 466, masangá 376, mpe bayekoli ya Biblia 49 795. Kasi, ezalaki ata na lisangá moko te mpo na ebele ya bato oyo balobaka Lingelesi. Na yango, na sanza ya minei na 2008, Betele etindaki bamisionɛrɛ, ndeko Donald Elwell ná mwasi na ye Jayne, na Saint-Domingue, mpo báfungola etuluku ya Lingelesi. Na ebandeli, mwa basakoli moke ya molende batambolaki mpo na koluka bisika bato oyo balobaka Lingelesi bafandaka. Na nsima, babongisaki teritware mpo bápesa litatoli malamumalamu.

Milende oyo basalaki ebotaki mbuma: Etuluku yango ya Lingelesi na Saint-Domingue ekobaki kokola, mpe na sanza ya nsambo na 2009, lisangá moko ya basakoli 39 esalemaki. Bazwaki mpe bibongiseli ya ndenge wana na bingumba mosusu. Na sanza ya zomi na moko na 2011, masangá ya Lingelesi ekómaki 7 mpe etuluku moko.

Baba moko ya mwasi oyo miso ekufá akangami na Yehova

Ndeko moko mobongisi-nzela monene azali kosalisa Lorys bajɛstɛ

Lorys, oyo azali na maladi oyo ebomaka miso mokemoke, azali mwana etike. Abotamá baba mpe miso na ye ebandaki kokufa ntango azalaki na mbula 16. Azalaki komona mwa moke na moi, kasi na butu azalaki komona ata moke te. Mpo na kosolola na ye nsima ya kolala ya moi, esengeli kosimba misapi na ye mpe kosalisa ye bajɛstɛ.

Ndeko moko mobongisi-nzela monene ná mwasi na ye bakutanaki na Lorys ntango akómaki na mbula 23. Na ntango yango, azalaki kofanda na makango na ye ya baba mpe bazalaki na mwana mwasi ya mbula moko. Lorys andimaki koya na makita mpe makambo oyo ayekolaki kuna esimbaki motema na ye.

Eumelaki te, Lorys abandaki kobongola bomoi na ye. Na ndakisa, ntango bateyaki ye ete ezalaki malamu te ndenge afandaki makango na mobali na ye nzokande babalaná te, ayebisaki mobali yango ete basengeli kokomisa libala na buku ya Leta mpe amonisaki ye ete akobuka mibeko ya Biblia te. Bosembo na ye ekamwisaki mobali yango, mpe andimaki kobala ye.

Nsima ya libala na bango, Lorys akómaki mosakoli mpe mwa moke na nsima azwaki batisimo. Na nsima, Batatoli oyo bazalaki koyekola na ye Biblia balakisaki ye elobeli ya bababa ya Amerika. Banda wana, alakisaka mwana na ye ya mwasi elobeli yango mpe ateyaka ye solo ya Biblia.

Koningana ya mabele ya nsɔmɔ esalemi na Haïti

Bato ya République dominicaine mpe ya Haïti bakobosana noki te mokolo ya mibale, mwa 12/01/2010. Koningana ya mabele moko ya nsɔmɔ esalemaki na Haïti. Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova esɛngaki mbala moko Betele ya République dominicaine etinda mbongo na Betele ya Haïti mpo na kosunga bandeko. Lokola mbongo yango ezalaki mingi mpenza, basɛngaki monganga ya Betele, Evan Batista, ndeko moko ya engambe (molai ya mɛtrɛ 1,90 mpe kilo 127), akende kotika yango.

Ekateli ya kotinda ndeko Batista ezalaki ya malamu mpenza mpo ntango akómaki na ndelo ya Haïti, bayebisaki ye ete bazalaki na mposa makasi ya lisalisi ya minganga. Bamemaki bato oyo bazokaki makasi na Ndako ya Mayangani oyo ekangani na Betele ya Haïti mpo bázwa lisalisi. Ntango bandeko ya Haïti bamonaki ete ndeko oyo amemaki mbongo azali monganga ya Betele, babengaki Betele ya République dominicaine na telefone mpo na kosɛnga ete ndeko Batista atikala na Haïti. Betele endimaki; mpe na ndenge yango babandaki mosala monene ya kosunga bandeko na biso ya Haïti, mwa bangonga moke kaka nsima ya koningana ya mabele.

Bandeko bamipesaki mpo na kosunga basusu nsima ya koningana ya mabele na 2010 na Haïti

Departema oyo etalelaka makambo ya kosomba biloko na Betele ya République dominicaine ebengaki mbala moko bakompanyi oyo etɛkelaka bango biloko ya kolya. Na yango, basombaki kilo koleka 6 800 ya loso ná madesu mpe biloko mosusu ya ntina mpe batindaki yango na Haïti na ngonga ya 2:30 na mokolo ya minei, mwa 14/01/2010—emonani ete yango nde lisalisi ya liboso oyo eutaki na ekólo mosusu. Na nsima, kaka na mokolo yango, République dominicaine etindaki minganga misato oyo basalaki mobembo ya ngonga 7 na motuka mpo na kokóma na Betele ya Haïti. Bakómaki kuna na butu, kasi na esika bákende naino kolala, bakendaki mbala moko kotala bandeko oyo bazwaki likama mpe basalisaki bango tii na midi ya butu. Na mokolo oyo elandaki, République dominicaine etindaki minganga mosusu minei mpe mafulume minei ya basi. Basalaki bandeko mapaso na mikakatano mingi; babongisaki mwa esika ya kosala mapaso kaka wana na Ndako ya Mayangani. Na pɔsɔ oyo elandaki, bandeko yango 12 basalisaki bato koleka 300 oyo bazokaki.

Mokolo na mokolo, bazalaki kotinda bato oyo bazokaki makasi mpenza na lopitalo na République dominicaine. Na bantango mosusu, kaka mituka oyo ememaki biloko na Haïti nde ezalaki komema mbangumbangu bato oyo bazoki na balopitalo ndenge na ndenge na République dominicaine. Betele etindaki bandeko mpo bákendaka kolendisa bandeko oyo bazokaki mpe bátala soki bazali na nkisi mpe biloko mosusu oyo esengeli. Bandeko ya masangá bapesaki bisika ya kolala mpe bilei na bato oyo bazalaki elongo na bandeko ya mabota na bango oyo bazokaki.

Batatoli ya Yehova bakabolaki kilo pene na 500 000 ya biloko, kati na yango basaani ya bilei 400 000

Milende mpe bolingo oyo basaleli ya Yehova bamonisaki ata nsima ya likama wana emonisi mpenza bosolo ya maloba ya Masese 17:17 ete: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” Makambo ndenge na ndenge oyo bato bakutanaki na yango emonisi ndenge Yehova asalelaki elimo na ye mpe bandeko ya lisangá mpo na kosunga basaleli na ye ya sembo ata liboso ya liwa. Lisungi ekobaki kopesama na boumeli ya basanza ebele. Batatoli ya Yehova bakabolaki kilo pene na 500 000 ya biloko, kati na yango basaani ya bilei 400 000. Bandeko soki 78 oyo bazali minganga na bikólo ndenge na ndenge bapesaki ntango mpe mayele na bango ofele elongo na ebele ya bandeko mosusu oyo bayaki mpo na kosalisa. *

^ par. 1 Mpo na koyeba malamumalamu makambo oyo esalemaki, talá Lamuká! ya 01/2011 nkasa 14-19.