Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

Kosakola na Créole Haïtien

Kosakola na Créole Haïtien

Bakómi kosakola na monɔkɔ ya Créole Haïtien

Kosakola na monɔkɔ ya Espagnol ezalaki kobota mbuma malamu mpenza. Kasi na nsima, bato ya minɔkɔ mosusu oyo bayá kofanda na République dominicaine bakómaki mpe kosepela na nsango malamu. Na Haïti, ekólo oyo ezali pembeni wana, bato balobaka mingimingi monɔkɔ ya Créole Haïtien. Atako na bantango mosusu bato ya Haïti mpe ya République dominicaine bazalaki koyokana te, bato ebele ya Haïti bayá kosala na République dominicaine, mpe na bambula oyo basopani mpenza kuna.

Na boumeli ya bambula, soki moto oyo alobaka monɔkɔ ya Créole Haïtien asepeli na solo, bazalaki kotinda ye na lisangá ya monɔkɔ ya Espagnol. Kasi, mpo na kosalisa bato wana malamu na elimo, na 1993, Lisangani ya Mikóló-Bakambi esɛngaki Betele ya Guadeloupe etinda babongisi-nzela monene na République dominicaine mpo báteya bato oyo balobaka Créole Haïtien. Ndeko Barnabé Biabiany ná mwasi na ye Germaine bazalaki na kati ya bandeko misato oyo bandimaki kokende kuna elongo na basi na bango. Ndeko Barnabé alobi boye: “Na ebandeli, tozalaki kaka na mwa babuku mibale ya Créole Haïtien. Mikanda mosusu nyonso ezalaki ya Lifalanse; na yango esɛngaki tóbongolaka makambo nyonso na Créole Haïtien.”

Na sanza ya yambo na 1996, basakoli libwa ya engumba Higüey, mpe zomi ya engumba Saint-Domingue bandimaki kopesa mabɔkɔ na etuluku ya Créole Haïtien. Na yango, bafungolaki etuluku mokomoko na bingumba yango, mpe na nsima nyonso mibale ekómaki masangá. Kasi, bakangaki masangá yango, mpo emonanaki lokola ete bato mingi ya Haïti bazalaki kosepela koyekola Espagnol mpe kokende na lisangá ya Espagnol. Ndeko Barnabé alobi boye: “Tosololaki na bandeko ya Departema mpo na mosala mpe emonanaki malamu tótika naino kosakola na monɔkɔ ya Créole Haïtien.”

Bazongeli kosakola na Créole Haïtien

Na 2003, Lisangani ya Mikóló-Bakambi etindaki ndeko Dong Bark ná mwasi na ye Gladys bákende kosakola na Créole Haïtien na République dominicaine. Na boumeli ya mbula mibale, basakolaki na engumba Higüey mpe mosala na bango ekómaki kobota mbuma. Na mokolo ya 01/06/2005, lisangá moko ya Créole Haïtien efungwamaki. Ndeko Dong Bark, Barnabé Biabiany, ná misionɛrɛ mosusu na nkombo Steven Rogers basalaki mibembo na ekólo yango mobimba mpo na kosakola na monɔkɔ ya Créole Haïtien.

Mosala na bango ya makasi ebotaki mbuma, mpe masangá mosusu efungwamaki. Na mokolo ya 01/09/2006, zongazonga ya liboso ya Créole Haïtien efungwamaki. Ezalaki na masangá nsambo mpe bituluku mibale; ndeko Barnabé Biabiany nde azalaki mokɛngɛli ya zongazonga.

Na bambula oyo elandaki, batindaki bamisionɛrɛ mosusu na République dominicaine mpo na kosakola na Créole Haïtien. Lisusu, bandeko mosusu ya Canada, ya Mpoto, États-Unis, mpe ya bisika mosusu bayaki mpo na kosalisa. Baponaki mwa bandeko oyo bayebi monɔkɔ ya Créole Haïtien malamu bátángisa bandeko ya bikólo mosusu mpe ya République dominicaine.

Bato mingi balobaka ete soki moto azali mwana-mboka Haïti te, kasi alobaka Créole Haïtien, azali Motatoli ya Yehova

Lokola bandeko ebele ya République dominicaine bazali kosala makasi báyekola monɔkɔ ya Créole Haïtien, bato ya Haïti bazali kosepela mingi. Lelo, soki mosakoli ya République dominicaine azali koteya moto Biblia na Créole Haïtien, matata ezalaka te mpe epesaka ye nzela ya kolobela nsango ya Bokonzi na kimya. Bandeko ebele mpenza bayekoli monɔkɔ ya Créole Haïtien; yango wana bato balobaka ete soki moto azali mwana-mboka Haïti te, kasi alobaka Créole Haïtien, azali Motatoli ya Yehova.

Mpo na komonisa ete kotyela bato ya ekólo mosusu likebi ebotaka mbuma malamu, talá likambo oyo ekómelaki ndeko mwasi moko mobongisi-nzela na République dominicaine oyo ayekolaki monɔkɔ ya Créole Haïtien. Na mosala ya kosakola, ndeko yango asololaki malamu na moto moko ya Haïti ná mwasi na ye. Azongelaki bango mpo bábanda koyekola Biblia. Alobi boye: “Ntango nakómaki, napesaki mwasi yango bizi na litama, ndenge basi ya République dominicaine basalaka. Mwasi yango abandaki kolela. Natunaki ye, ‘Likambo nini?’ Alobaki, ‘Na ebele ya bambula oyo nasali na ekólo oyo, ezali mbala ya liboso moto apesa ngai bizi bongo.’”

Yehova apamboli mpenza mosala makasi ya koteya na Créole Haïtien. Na mokolo ya 01/09/2009, masangá ya Créole Haïtien ekómaki 23, mpe bituluku 20; na yango, zongazonga ya mibale esalemaki. Motángo ya bato na Ekaniseli ya 2011 emonisaki ete bokoli ekokoba kosalema. Na ndakisa, basakoli 11 ya mwa engumba Río Limpio basepelaki mingi komona ete na Ekaniseli, bazalaki bato 594. Mpe ntango bibongiseli ezwamaki mpo Ekaniseli esalema na engumba Las Yayas de Viajama, epai ata mosakoli moko te azalaka, bato 170 bayaki. Na sanza ya libwa na 2011, masangá ya Créole Haïtien ekómaki 33 mpe bituluku 21. Na yango, na 2012, zongazonga mosusu esalemaki.

Betele ya République dominicaine mpe ya Haïti esali na bomoko mpo na kopesa bandeko formasyo na bikólo yango mibale. Basalaki bakelasi mitano ya Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba na monɔkɔ ya Créole Haïtien mpe bakelasi minei ya Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko oyo babalá.

Bazali koyekola monɔkɔ ya Créole Haïtien