Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

Boyokani ya Lingomba ya Katolike ná Trujillo

Boyokani ya Lingomba ya Katolike ná Trujillo

BOYOKANI nini Trujillo azalaki na yango ná Lingomba ya Katolike? Moto moko oyo alandelaka makambo ya politiki alobaki boye: “Na boyangeli mobimba ya Trujillo, banda 1930 tii 1961, Lingomba ná Leta bazalaki kosalisana mingi; Trujillo azalaki kobatela Lingomba mpe, Lingomba ezalaki kosimba boyangeli na ye.”

Na 1954, Trujillo akendaki na Roma mpe basalaki boyokani na Pápa. Germán Ornes, oyo na eleko moko azalaki moninga ya motema ya Trujillo, akomaki boye: “Lokola Lingomba ya République dominicaine ekangami makasi na Trujillo, [yango] ezali mpenza kosalisa ‘Nkumu’ [Trujillo]. Bakonzi ya lingomba, oyo batambwisami na Episkɔpɔ-mokonzi Ricardo Pittini ná Octavio Beras, bazali na kati ya bato ya libosoliboso oyo basimbi guvɛrnema.”

Ornes abakisaki boye: “Na libaku nyonso ya malamu, Pápa atindelaka Trujillo mbote na esengo mpenza. . . . Na likita monene ya Katolike oyo elobelaki mimeseno ya mboka, oyo esalemaki na engumba Ciudad Trujillo na lisalisi [ya Trujillo] na 1956, Kardinale Francis Spellman, oyo Pápa atindaki aya komonisa ye, amemelaki mokonzi nsango moko ya kokitisa motema. Kardinale Spellman autaki na New York mpe prezida [Trujillo] ye moko ayambaki ye na lokumu mingi mpenza. Koyambana oyo bayambanaki ebimaki na lokasa ya liboso ya bazulunalo nyonso na République dominicaine na mokolo oyo elandaki.”

Na 1960, zulunalo Time elobaki ete: “Tii lelo, Trujillo ná lingomba bazali koyokana malamu. Ricardo Pittini, episkɔpɔ-mokonzi ya mikili ya Amerika, azali sikoyo na mbula 83 mpe akufi miso; kasi eleki mbula minei atindelaki New York Times mokanda moko oyo ezalaki kokumisa Trujillo mpe elobaki ete ‘bato balingaka prezida yango “ya makambo makasi” mpe bakumisaka ye.’”

Kasi, nsima ya kosala na boyokani mbula 30 mobimba na Trujillo, Lingomba ya Katolike ebandaki kobenda nzoto ntango makambo ya politiki ekómaki kobongwana. Moto wana oyo alandelaka makambo ya politiki alobi boye: “Ntango bato mingi bakómaki kotɛmɛla boyangeli mabe [ya Trujillo], mpe na nsima, lokola balukaki kotya demokrasi na mboka, Lingomba, oyo banda kala ezalaki na boyokani makasi ná Trujillo, ekómaki kobenda nzoto.”

Nsukansuka, na 2011, Lingomba esɛngaki bato ya République dominicaine bolimbisi. Mokanda moko ya basango ebimaki na zulunalo Dominican Today; elobaki ete: ‘Tondimi ete tosali mabunga mpe ete tokangamaki ntango nyonso te na kondima, mosala mpe mikumba na biso. Na yango, tosɛngi bolimbisi mpe tolingi ete bana-mboka nyonso ya République dominicaine bámitya na esika na biso mpe bálimbisa biso.’