Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

“Nabundaki lokola nkɔsi”

Luis Eduardo Montás

“Nabundaki lokola nkɔsi”
  • ABOTAMAKI NA 1906

  • BATISIMO 1947

  • NA MOKUSE Luis azalaki mokonzi na parti politiki ya Rafael Trujillo. Ayekolaki solo mpe asalelaki Yehova na bosembo tii liwa na ye na 2000.

LUIS azalaki ndeko ya Trujillo mpe azalaki kobomba mbongo ya parti politiki ya mokonzi, Partido Dominicano. Kasi, Luis azalaki kosepela ata moke te na ebongiseli ya politiki ya Trujillo, mpe atako asɛngaki mbala na mbala ete alongwa na mosala yango, Trujillo, mokonzi mabe, azalaki kopesa ye nzela te.

Ntango Trujillo abomisaki bayaya mibale ya Luis ya mibali, Luis alukaki mbala mibale koboma mokonzi yango ya mabe. Kasi, batángaki ye ata mokolo moko te na kati ya bato oyo bazalaki koluka koboma mokonzi. Kutu Luis akendaki epai ya banganga-nkisi mpo na koluka koboma mokonzi; alobaki mpo na ye ete: “Asalaka makambo lokola nyama mpe amonaka ete ye nde aleki bato nyonso.” Mokolo moko, na ndako ya nganga-nkisi moko, Luis amonaki buku “La vérité vous affranchira” na mesa mpe abandaki kotánga yango. Luis asepelaki na buku yango mingi mpe amemaki yango na ndako na ye; na nsima amonaki ete yango nde mateya ya solo oyo azalaki koluka.

Ntango Luis akendaki na engumba Ciudad Trujillo, akɔtaki na likita moko ya Batatoli ya Yehova mpe bapesaki ye babuku mpe bazulunalo ebele. Atángaki mikanda yango butubutu mpe na nsima, asɛngaki báyekola na ye Biblia. Ntango Luis apusanaki na boyekoli, azwaki ekateli ya kolongwa na guvɛrnema ya Trujillo. Ntango Trujillo ayokaki likambo yango, ayebisaki Luis ete akotya ye na esika ya lokumu mingi, akokóma ambasadɛrɛ ya République dominicaine na Porto Rico. Luis aboyaki, atako ayebaki ete bakonyokola ye mpo na ekateli yango.

Luis alobi boye: “Banyokolaki ngai na ndenge nyonso, mpe guvɛrnema elukaki kobenda ngai na ndenge nyonso. Kasi nazwaki ekateli ya kotika bisengo ya mokili.” Luis akómaki kosakola nsango malamu na mpiko mpenza, tii basango ya Katolike bapesaki ye nkombo “moteyi.” Na mokolo ya 05/10/1947, sanza motoba nsima ya mokolo oyo akendaki makita mbala ya liboso, Luis azwaki batisimo.

Nsima ya batisimo ya Luis, balukisaki ye, bakangaki ye, mpe batyaki ye na bolɔkɔ, na esika ya ye moko. Balukaki koboma ye mbala ebele. Kasi, mbala nyonso oyo bakangaki Luis mpe bakendaki kosambisa ye na tribinale, azalaki kosalela libaku yango mpo na kopesa litatoli. Luis alobaki boye: “Nabundaki lokola nkɔsi mpo na kokɔtela mateya oyo nazalaki kondima, mpe ntango nakanisaka likambo yango nayokaka esengo.”

Bato ebele na ekólo bayebaki ete Luis akómá mosaleli ya sembo ya Nzambe. Na 1994, zulunalo moko (El Siglo) elobaki mpo na Luis ete: “Bato ya San Cristobal bayebi ete Tata Luis Eduardo Montás azali moto ya makanisi malamu. Azali moto ya Nzambe oyo amityaka na esika ya basusu mpe atondi na boboto. Atiká nsango na San Cristobal ete amipesaki na makambo ya Nzambe.”