Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

“Nakotikala kaka Motatoli ya Yehova”

Ana María (Mary) Glass

“Nakotikala kaka Motatoli ya Yehova”
  • ABOTAMAKI NA 1935

  • BATISIMO 1956

  • NA MOKUSE Amipesaki na Lingomba ya Katolike; kasi ayekolaki Biblia mpe ayikaki mpiko na botɛmɛli oyo eutaki na libota, na lingomba mpe na guvɛrnema.

NAMIPESAKI mpenza na makambo ya Lingomba ya Katolike. Nazalaki koyemba na ndako-nzambe mpe kokende kotika basango na bamboka mikemike, esika bazalaki kosala misa. Na nsima, na 1955, yaya na ngai ya mwasi ayebisaki ngai makambo etali Paradiso oyo ezali koya. Apesaki ngai Biblia, mwa buku “Nsango malamu oyo ya Bokonzi” mpe buku “Que Dieu soit reconnu pour vrai!” Nasepelaki mingi, mpe natunaki sango soki nakokaki kotánga Biblia. Ayebisaki ngai ete ‘nakobɛla ligboma,’ kasi namonaki malamu natánga yango kaka.

Ntango nakendaki kofanda epai ya bankɔkɔ na biso na engumba Boca Chica, sango moko atunaki ngai mpo na nini nazalaki kokende ndako-nzambe te. Nayebisaki ye ete namoni ete mateya mingi ya lingomba eutá na Biblia te. Sango yango asilikaki makasi. Agangelaki ngai mpe alobaki: “Yoká, mwana, ozali mpate oyo ekimi etonga na ngai.”

Nayanolaki ete: “Te, yo nde okimá etonga ya Yehova, mpo bampate ezali ya Yehova kasi ya moto te.”

Nakendaki lisusu na ndako-nzambe ata mokolo moko te. Nakendaki kofanda epai ya yaya na ngai ya mwasi, mpe nsima ya sanza motoba mpamba kobanda nayokaki mateya ya solo mbala ya liboso, nazwaki batisimo. Na mbala moko, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Mbula moko na nsima nabalanaki na Enrique Glass, oyo azalaki mokɛngɛli ya zongazonga. Mokolo moko ntango tozalaki kosakola na parkɛ moko na engumba La Romana, bapolisi bakangaki Enrique. Ntango bazalaki kokende na ye, nalandaki bango na nsima mpe nalobaki ete: “Ngai mpe nazali Motatoli ya Yehova, ngai mpe nazalaki kosakola. Mpo na nini bokangi mpe ngai te?” Kasi baboyaki kokanga ngai.

Enrique asilaki kokɔta bolɔkɔ mbala mingi, alekisaki mbula nsambo na ndambo. Na mbala oyo, bakatelaki ye bolɔkɔ ya mbula moko na sanza mwambe. Mokolo nyonso ya lomingo nazalaki kokende kotala Enrique. Mokolo moko ntango nakendaki kotala ye, mokɛngɛli ya bolɔkɔ atunaki ngai ete: “Oyei kosala nini awa?”

Nayebisaki ye ete: “Bakangaki mobali na ngai mpo azali Motatoli ya Yehova.”

Alobaki ete: “Ozali naino elenge mpe okoki kosala makambo ebele na bomoi. Mpo na nini ozali kolekisa ntango na yo ná Batatoli ya Yehova?”

Nayanolaki ete: “Ngai mpe nazali Motatoli ya Yehova. Ata soki bobomi ngai mbala nsambo, mpe bosekwisi ngai mbala nsambo, nakotikala kaka Motatoli ya Yehova.” Motema na ye esukaki mpe abenganaki ngai.

Ntango epekiseli esilaki, ngai ná Enrique tosalaki mwa bambula na mosala ya zongazonga mpe ya etúká. Enrique akufaki na mokolo ya 08/03/2008. Ngai nazali kaka mobongisi-nzela ya sanza na sanza.