Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

Nani azali Mokonzi?

Nani azali Mokonzi?

“Bandeko na bango bakozanga motó”

Na mokolo ya 13/07/1957, inspecteur Colón akomelaki secrétaire d’État ete: “Bankɔkɔ balobá: ‘Bakangaka nyoka na motó.’ Mpo na kolimwisa mwa lingomba ya Batatoli ya Yehova na ekólo oyo, esengeli koluka ndenge ya kobengana bamisionɛrɛ na bango. Soki tosali bongo, bandeko na bango bakozanga motó [to mokambi], mpe soki bazali na motó te, mateya na bango ekoyokana lisusu te.”

Mwa moke na nsima, Arturo Espaillat, ministre oyo atalelaka makambo etali kimya na mboka, asɛngaki bamisionɛrɛ zomi oyo batikalaki bálongwa na ekólo. Na mokolo ya 21/07/1957, ndeko Roy Brandt akomelaki Trujillo mpo na kosɛnga bákutana mpo alimbola makambo na biso. Na mokanda yango akomaki ete: “Mabe oyo bato mosusu ya ekólo bazali koloba mpo na nkombo ya Yehova Nzambe ezali ndenge moko na oyo bato ya makanisi mabe bazalaki koloba mpo na bantoma ya Yesu.” Na nsima ndeko Brandt alendisaki Trujillo atánga Misala mokapo 2 tii na 6 mpe alobaki ete: “Toli ya polele oyo Mosambisi Gamaliele apesaki na ntango wana ebongi mpe ekoki kosalisa lelo kaka ndenge ezalaki na ntango wana.” Na nsima, ndeko Brandt akomaki na makomi minene maloba ya Misala 5:38, 39: “BÓTIKA BATO OYO MPAMBA TE SOKI MOSALA OYO BAZALI KOSALA EUTI NA NZAMBE, MOKOLO MOSUSU BOKOYA KOMONA ETE BOZALI BATO OYO BAZALI KOBUNDA NDE NA NZAMBE.” Kasi, makambo yango ekweaki na matoi ya baba. Na mokolo ya 03/08/1957, bamemaki bamisionɛrɛ na libándá ya mpɛpɔ mpe babenganaki bango.

‘Yesu nde motó’

Ndeko Donald Nowills akómaki mokɛngɛli ya Betele wana azalaki kaka na mbula 20 mpamba

Bandeko batikalaki ndenge nini lokola bamisionɛrɛ nyonso bakendaki? Bazangaki ‘motó,’ ndenge inspecteur Colón alobaki? Te, Yesu nde “azali motó ya nzoto, lisangá.” (Kol. 1:18) Na yango, basaleli ya Yehova na République dominicaine ‘bazangaki motó’ te. Kutu, Yehova akobaki kosunga bango na nzela ya ebongiseli na ye.

Donald Nowills, oyo atyamaki mokɛngɛli ya mosala na Betele ntango babenganaki bamisionɛrɛ, azalaki kaka na mbula 20 mpe autaki kozwa batisimo esalaki kaka mbula minei. Atako azalaki mokɛngɛli ya zongazonga na boumeli ya mwa basanza, mosala ya Betele ezalaki likambo ya sika mpo na ye. Ndeko Nowills asalaki biro moko ya moke na mwa ndako na ye oyo basalá na mabaya mpe bibende; ezalaki na sima te. Ezalaki na Gualey, kartye moko mabe na engumba Ciudad Trujillo. Na lisalisi ya ndeko Félix Marte, azalaki kosala bafotokopi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na bandeko ya ekólo mobimba.

Fotokopi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, na 1958

Ndeko Mary Glass, oyo mobali na ye Enrique azalaki na bolɔkɔ na ntango wana, azalaki kosalisa ndeko Nowills. Ndeko Mary alobi boye: “Soki nasilisi mosala na ngai ya mosuni na ngonga ya 17:00, nazalaki kokende na biro ya ndeko Nowills mpo na kobɛta Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na masini. Na nsima, ndeko Nowills azalaki kobimisa yango na masini ya kosala bafotokopi. Na nsima, ndeko mwasi moko oyo azalaki kouta engumba Santiago, mpe oyo topesaki nkombo ‘anzelu,’ azalaki kotya bazulunalo yango na nse ya linzanza moko ya litrɛ 20 oyo ezalaki ya mafuta. Na nsima, azalaki kozipa bazulunalo elamba mpe kotya songo, mabɛngɛ to mbálá. Likoló na yango, azalaki kotya saki moko ya kilo. Nsima na yango, azalaki kozwa bisi mpe kokende na nɔrdi ya ekólo mpo na kotikela lisangá mokomoko Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko. Libota mokomoko ezalaki kodefa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli yango mpo na koyekola.”

Ndeko Mary abakisi ete: “Esɛngaki kozala ekɛngɛ mpenza mpo basali ya Leta batondaki na babalabala mpo na koluka esika oyo tozalaki kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Kasi, bamonaki yango ata mokolo moko te. Yehova azalaki ntango nyonso kobatela biso.”