Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo ya esengo ya mbula eleki

Makambo ya esengo ya mbula eleki

Elimo ya Yehova Nzambe esalisaki Yisaya asakola boye: “Na esika ya motako nakotya wolo, mpe na esika ya ebende nakotya palata, mpe na esika ya nzete, motako, mpe na esika ya mabanga, ebende.” (Yis. 60:17) Na mbula oyo eleki, tomonaki polele ete esakweli yango ezali kokoba kokokisama. Kolongola eloko ya motuya moke mpe kotya oyo ya motuya mingi elimboli kobongisa makambo; ndenge moko mpe Batatoli ya Yehova babongoli makambo mingi na oyo etali kotambwisa lisangá na eleko oyo ya nsuka.Mat. 24:3.

NA ETENI OYO

Mosala monene na Warwick

Talá mwa moke makambo ya esengo oyo esalemaki na mosala ya kotonga oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala na esika oyo ekokóma biro monene na bango.

Kosala baplan mpe kotonga na mokili mobimba

Departema yango ya sika ezali na mokano ya kosilisa nokinoki misala ya kotonga bandako koleka 13 000.

Biblia oyo esalemi mpo eumela

Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ya Lingelesi oyo ebimaki na 2013 ezali komonana kitoko mpe esalemi mpo eumela.

Liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo eleki monene

Likita ya nsuka ya mbula ya mbala ya 129 ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania ezalaki liyangani oyo eleki monene.

Bofungoli Betele ya Sri Lanka

Na molulu yango, basalelaki video na ndenge oyo esalemaki naino te.

Bikateli ya batribinale

Batatoli ya Yehova bazali kokoba kobunda mpo na ntomo na bango na makambo ya losambo.

Bansango oyo euti na mikili ndenge na ndenge

Nini etindaki bana mibale ya basi ya Géorgie bápesa likabo na mbongo oyo balingaki kosombela telefone?

“Tomoni makambo ya kokamwa”

Makambo oyo ezali kosalema lelo ezali lokola makamwisi oyo Yesu azalaki kosala?