Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA ESENGO YA MBULA ELEKI

Liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo eleki monene

Liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo eleki monene

NA MOKOLO ya pɔsɔ, mwa 05/10/2013, bato 257 294 na mikili 21 bayanganaki na likita ya nsuka ya mbula ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania ya mbala ya 129; bato mosusu bazalaki esika likita yango esalemaki, bamosusu balandaki yango mbala moko na nzela ya video. Bandeko mosusu balandaki likita yango na video mwa bangonga na nsima. Bato nyonso oyo balandaki programɛ yango bazalaki 1 413 676 na mikili 31—Ezalaki mpenza liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo eleki monene.

Kobanda na bambula ya 1920, Batatoli ya Yehova basalaka ete bato ya mokili mobimba bálanda badiskur ya mayangani minene na nzela ya telefone to ya radio. Lelo, Internet ezali kosalisa ata bato ya mikili ya mosika mpenza báyoka mpe bámona makambo mbala moko ntango ezali kosalema to mwa bangonga na nsima.

Bandeko ya Babetele ebele basalaki mosala koleka mbula mobimba liboso mpo na kobongisa makambo mpo likita yango eleka na nzela ya Internet. Na mokolo ya likita yango, bandeko oyo basalaka na makambo ya Internet bazalaki kolandela makambo nyonso longwa na Brooklyn, (New York) mpe ndeko moko azalaki wana ntango nyonso mpo likita yango ezalaki koleka na bisika 15 oyo ezalaki na ngonga ekeseni.