Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokapo ya mobu 2015

“Bópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu.”Nzembo 106:1

Mokapo ya mobu 2015

Ntango Yehova abikisaki bango na mabɔkɔ ya Farao mpe ya basoda na ye na Mbu Motane, Bayisraele bapesaki Yehova matɔndi mingi mpenza. Biso mpe tokoki kopesa Yehova matɔndi. Ya solo, ntango tokutani na mikakatano, ezalaka mpasi te tólɛmba nzoto. Na ntango yango, tokoki kobɔndisama mpe kozwa makasi soki tokanisi mapamboli oyo tozali na yango.

Moko ya mapamboli ya minene oyo tozali na yango ezali elikya oyo Yehova apesi biso ete akolongola eloko nyonso oyo epesaka biso mpasi mpe mawa. Ata soki makambo nini ya mpasi ekómeli biso, toyebi ete Yehova akosundola biso te. Yehova, Mobateli na biso ya bolingo, apesaka biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo tósalela ye na bosembo. Azali “ekimelo mpe bokasi na biso, lisalisi oyo ezwamaka noki na bantango ya mpasi.” (Nz. 46:1) Kotya makanisi na mapamboli oyo alaki biso ekosalisa biso tólonga ata mikakatano ya ndenge nini. Na boumeli ya mbula oyo, tókanisaka ntango nyonso mapamboli na biso mpe mitema na biso etinda biso ‘tópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu; mpo motema boboto na ye ezali seko na seko.’Nz. 106:1.