Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 4

Nzambe azali nani?

Nzambe azali nani?

BATO basambelaka banzambe mingi. Kasi Makomami Mosantu eteyaka ete Nzambe ya solo azali kaka moko. Moto moko te akokani na ye, azali mokonzi ya bakonzi, azali libela na libela. Akelá biloko nyonso oyo ezali na likoló mpe na mabele, mpe apesá biso bomoi. Yango wana, kaka ye nde tosengeli kosambela.

Mibeko epesamaki na nzela ya mosakoli Moize lokola “liloba oyo elobamaki na nzela ya baanzelu”

Nzambe azali na batitre ebele, kasi azali na nkombo kaka moko: YEHOVA. Nzambe ayebisaki Moize boye: “Talá oyo okoloba na bana ya Yisraele: ‘Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bino, Nzambe ya Abrahama, Nzambe ya Yisaka mpe Nzambe ya Yakobo, atindi ngai epai na bino.’ Wana nde nkombo na ngai mpo na seko, mpe wana nde ekaniseli na ngai bileko na bileko.” (Kobima 3:15) Nkombo Yehova ezali mbala soki 7 000 na Makomami Mosantu. Nzembo 83:18 elobi na ntina na Nzambe ete “yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.”

Maniskri ya kala ya Rulo ya Mbu Ekufá ezali na nkombo ya Nzambe

Moto ata moko te amoná Nzambe. Nzambe ayebisaki Moize boye: “Okoki te komona elongi na ngai, mpo moto moko te akoki komona ngai mpe kozala lisusu na bomoi.” (Kobima 33:20) Nzambe azalaka na likoló mpe amonanaka te na miso ya bato. Ezali mabe kosala ekeko, liyemi to elilingi ya Nzambe mpe kosambela yango. Na nzela ya mosakoli Moize, Yehova Nzambe apesaki mobeko oyo: “Osengeli te komisalela ekeko oyo eyemami to elilingi oyo ekokani na eloko nyonso oyo ezali kuna na likoló to oyo ezali na mabele awa na nse to oyo ezali na mai na nse ya mabele. Osengeli te kogumbamela yango to kobendama mpo na kosalela yango, mpamba te ngai Yehova Nzambe na yo, nazali Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye.” (Kobima 20:2-5) Na nsima, na nzela ya mosakoli Yisaya, Nzambe alobaki boye: “Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai; mpe nakopesa nkembo na ngai na mosusu te, lisanzoli na ngai na bikeko oyo eyemami mpe te.”​—Yisaya 42:8.

Bato mosusu bandimelaka Nzambe kasi bamonaka ye lokola moto moko oyo bakoki koyeba te mpe bakoki kopusana penepene na ye te, moto moko oyo esengeli kaka kobanga kasi kolinga te. Okanisi boni? Nzambe akipaka yo? Okoki mpenza koyeba ye, ata mpe kopusana penepene na ye? Tótala oyo Makomami elobi mpo na bizaleli ya Nzambe.