Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 5

Sepelá na bizaleli ya Nzambe oyo eleki nyonso

Sepelá na bizaleli ya Nzambe oyo eleki nyonso

MAKOMAMI Mosantu eyebisi biso bizaleli mingi ya malamu ya Nzambe mpo na kosalisa biso tóyeba ye. Na ndakisa, Makomami eyebisi biso bizaleli minei ya Nzambe oyo eleki minene: nguya, bosembo, bwanya, mpe bolingo. Tótalela mokomoko na yango.

Nguya na ye ezali na nsuka te

Nzambe azali na nguya oyo eleki nyonso

Yehova ayebisaki Abrahama ete: “Ngai nazali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” (Ebandeli 17:1) Nguya na ye ekokani na oyo ya moto mosusu te, azali na nguya ya kosala nyonso oyo alingi mpe nguya na ye ezangi nsuka. Nzambe asalelaki nguya na ye mpo na kokela molɔ́ngɔ́ mobimba.

Ata mokolo moko te Nzambe asalelá nguya na ye na ndenge ya mabe. Asalelaka yango ntango nyonso na bokatikati mpe mpo na kokokisa mokano moko. Asalelaka nguya na ye na ndenge ebongi, nzela moko na bizaleli na ye mosusu lokola bosembo, bwanya, mpe bolingo.

Yehova asalelaka nguya na ye mpo na bolamu ya basaleli na ye ya sembo. “Miso na ye ezali kotambolatambola na mabele mobimba mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.” (2 Ntango 16:9) Obendami te na Nzambe wana, oyo azali na nguya, kasi akipaka biso?

Nzambe ya bosembo

“Yehova alingaka bosembo.” (Nzembo 37:28) Asalaka ntango nyonso oyo ezali sembo na boyokani na mitinda na ye ya kokoka.

Nzambe aponaka bilongi te

Nzambe ayinaka kozanga bosembo. “Aponaka bilongi te mpe andimaka kanyaka te.” (Kolimbola Mibeko 10:17) Ayinaka baoyo banyokolaka basusu, mpe asungaka baoyo bazangi moto ya kosalisa bango, ezala mpe “mwasi oyo mobali akufá to mwana mobali oyo tata akufá.” (Kobima 22:22) Na miso ya Nzambe, bato nyonso bazali ndenge moko. “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.”​—Misala 10:34, 35.

Nzambe asalelaka bosembo na ye na bokatikati mpenza. Akangaka miso na mabe te, azalaka mpe makambo makasimakasi te. Apesaka basumuki oyo baboyi kobongola motema etumbu, kasi baoyo babongoli motema ayokelaka bango mawa. “Yehova azali na motema mawa mpe na ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto. Akoluka ntango nyonso komonisa mabunga na biso te, akokanga mpe nkanda te libela. Asaleli biso makambo na kolanda masumu na biso te; akweisi mpe biso te na makambo oyo esengelaki tókwea, na kolanda mabunga na biso.” (Nzembo 103:8-10) Nzambe abosanaka mpe te misala ya bosembo ya basaleli na ye, mpe apesaka bango mbano mpo na yango. Omoni te ete osengeli kotyela Nzambe ya bosembo ndenge wana motema?

Nzambe ya bwanya

Makomami Mosantu elobelaka bwanya ya Nzambe

Yehova azali Liziba ya bwanya nyonso. “Ee bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali mingi mpenza!” (Baroma 11:33) Bwanya na ye ekokani na oyo ya moto mosusu te mpe ezangi nsuka.

Bwanya ya Nzambe emonanaka polele na biloko oyo akelá. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Ee Yehova, misala na yo ezali mpenza ebele! Osalá yango nyonso na bwanya.”​—Nzembo 104:24.

Bwanya ya Nzambe emonisami mpe na kati ya Makomami Mosantu. Mokonzi Davidi akomaki boye: “Bokundoli ya Yehova ebongi kotyelama motema, ekómisaka moto oyo azangi mayele moto ya bwanya.” (Nzembo 19:7) Kanisá naino: okoki kozwa bwanya ya Nzambe oyo ezangi nsuka! Okosepela kozwa bwanya yango?

“Nzambe azali bolingo”

Ezaleli ya Yehova oyo eleki monene ezali bolingo. Makomami eyebisi biso ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Bolingo nde etindaka ye asala makambo nyonso.

Nzambe amonisaki bolingo na ye mpo na biso na ndenge mingi. Apesaka biso biloko ya malamu. “Asaleli bino bolamu, ndenge apesaka bino bambula uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma, ndenge atondisaka mitema na bino mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.” (Misala 14:17) Ya solo, “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza eutaka na likoló.” (Yakobo 1:17) Na nzela ya Makomami, oyo ezali likabo ya motuya mingi, Nzambe ayebisi biso solo na ntina na ye moko mpe ateyi biso mibeko mpe mitinda na ye ya bolingo. Na libondeli moko, Yesu alobaki ete, “liloba na yo ezali solo.”​—Yoane 17:17.

Biloko oyo Nzambe akelá emonisaka bwanya na ye mpe ekamwisaka biso

Nzambe asalisaka mpe biso ntango tokutani na mikakatano. “Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo. Akopesa nzela ata moke te ete moyengebene atengatenga.” (Nzembo 55:22) Alimbisaka masumu na biso. “Yo, Ee Yehova, ozali malamu mpe osepelaka kolimbisa; mpe motema boboto oyo ozali komonisela baoyo nyonso bazali kobelela yo ezali mingi.” (Nzembo 86:5) Kutu, apesi biso mpe likabo ya bomoi ya seko. “Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” (Emoniseli 21:4) Ndenge nini okomonisa botɔndi mpo na bolingo oyo Nzambe amoniselaka yo? Yo mpe okolinga ye?

Pusaná penepene na Nzambe

Kobondela mpe komanyola likoló ya bizaleli ya Nzambe ekosalisa yo opusana penepene na ye

Nzambe alingi ete oyeba ye malamu. Liloba na ye elendisi yo boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8) Nzambe abengaki mosakoli ya sembo Abrahama “moninga na ngai.” (Yisaya 41:8) Yehova alingi ete yo mpe ozala moninga na ye.

Soki oyekoli makambo mingi mpo na Nzambe, okomiyoka mpe ete okómi penepene na ye mpe okozala na esengo mingi. “Esengo na moto oyo . . . asepelaka na mobeko ya Yehova, mpe atángaka mobeko na ye na mongongo ya nse butu moi.” (Nzembo 1:1, 2) Yango wana, kobá koyekola Makomami Mosantu. Manyoláká likoló ya bizaleli ya Nzambe mpe misala na ye. Saleláká makambo oyo ozali koyekola mpo na komonisa ete olingaka Nzambe. “Mpo bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye; kutu mibeko na ye ezali kilo te.” (1 Yoane 5:3) Na nsima, bondelá ndenge mokomi ya nzembo abondelaki: “Salá ete nayeba banzela na yo, Ee Yehova; teyá ngai banzela na yo. Tambwisá ngai na solo na yo.” (Nzembo 25:4, 5) Okomona ete Nzambe “azali mosika te na mokomoko na biso.”​—Misala 17:27.