Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 3

Toli ya malamu oyo ebongisaka bomoi ya bato

Toli ya malamu oyo ebongisaka bomoi ya bato

KANISÁ ete monganga moko ya sika ayei na esika oyo ofandaka. Na ebandeli, okoki kobanga kokende epai na ye mpo asalisa yo. Kasi okosala nini soki baninga na yo mosusu bakendaki epai na ye mpo asalisa bango mpe abikisi bango? Okobanga lisusu kokende epai ya monganga yango mpo asalisa mpe yo?

Tokoki koloba ete Makomami Mosantu ezali lokola monganga wana. Bato mosusu babangaka kotánga yango. Kasi, ntango basalelaka toli ya malamu oyo bazwaka kuna, bomoi na bango ebongaka mpenza. Tótalela bandakisa oyo elandi.

Ndenge ya kosilisa mikakatano ya libala

Mwasi moko nkombo na ye Sumiatun alobi boye: “Na ebandeli ya libala na biso, nazalaki komona lokola ete mobali na ngai Dumas, azalaki kokipe ngai te. Mbala mingi soki nayoki nkanda, nazalaki kogangela ye, kobamba ye biloko, ata mpe kobɛta ye. Ntango mosusu, soki nkanda eleki ngai, nazalaki kokwea mpe kobungisa makanisi.”

“Ntango Dumas abandaki koyekola Makomami Mosantu, nazalaki kosɛka ye. Kasi nazalaki kobombana na shambrɛ oyo ezalaki pembeni wana mpe nazalaki kolanda makambo oyo bazalaki koyekola. Mokolo moko, nayokaki bango batángi bavɛrsɛ oyo: ‘Basi bámikitisa liboso ya mibali na bango lokola epai ya Nkolo . . . Mwasi asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.’ (Baefese 5:22, 33) Maloba wana esimbaki motema na ngai. Nasɛngaki Nzambe alimbisa ngai ndenge nazalaki konyokola mobali na ngai, mpe nabondelaki ye asalisa ngai nakóma mwasi malamu. Eumelaki te, ngai ná Dumas tokómaki koyekola Makomami elongo.”

Dumas ná Sumiatun

Makomami Mosantu elobi mpe ete: “Mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko.” (Baefese 5:28) Sumiatun alobi boye: “Koyekola makambo wana ebongolaki biso nyonso mibale. Nakómaki komemela Dumas kɔpɔ ya tii ntango auti mosala mpe koloba na ye na boboto. Dumas mpe na ngámbo na ye, akómaki kolinga ngai mingi mpe kosalisa ngai na misala ya ndako. Biso nyonso mibale tosalaki makasi ‘tózala na boboto na kati na biso, tóyokelanaka mpenza mawa, tólimbisanaka na motema moko.’ (Baefese 4:32) Yango wana, tokómaki kolingana mingi mpe komoniselana limemya mingi. Lelo oyo, tosali mbula 40 na libala, mpe tozali na esengo. Toli ya malamu oyo euti na Liloba ya Nzambe ebateli libala na biso!”

Koyeba kopekisa nkanda

Mobali moko nkombo na ye Tayib alobi boye: “Nazalaki moto ya nkanda makasi. Nabundaki bitumba mingi mpe mbala mingi nazalaki kobangisa basusu na mondoki. Nazalaki mpe kobɛta mwasi na ngai, Kustriyah, kotuta elongi na ye na mabele soki nkanda eleki makasi. Bato mingi bazalaki kobanga ngai.”

Kustriyah ná Tayib babondelaka elongo mpokwa nyonso

“Mokolo moko, natángaki maloba oyo ya Yesu: ‘Nazali kopesa bino mobeko ya sika: bólinganaka bino na bino; ndenge ngai nalingaki bino.’ (Yoane 13:34) Maloba yango esimbaki motema na ngai, mpe nazwaki ekateli ya kobongwana. Soki nkanda eyeli ngai, nazalaki kobondela Nzambe asalisa ngai nakitisa motema. Nsima ya ntango moke, nkanda na ngai ezalaki kokita. Ngai ná mwasi na ngai tozalaki kosalela toli oyo ezali na Baefese 4:26, 27: ‘Moi elala te bino bozali kaka na nkanda, mpe bótikela Zabolo esika te.’ Tozalaki kotánga Makomami mpe kobondela elongo mpokwa nyonso liboso ya kolala. Yango ezalaki kosilisa matata nyonso oyo tozalaki na yango na moi mpe kosalisa biso tóyokana malamu.”

“Lelo oyo, nayebani lokola moto ya kimya. Mwasi na ngai mpe bana na ngai balingaka ngai mpe batosaka ngai. Nazali na baninga mingi mpe namiyokaka ete nakómá na boyokani malamu na Nzambe. Nazali mpenza mobali ya esengo.”

Kotika milangwa

Goin

Mobali moko nkombo na ye Goin alobi boye: “Nazalaki kotambola na bilenge ya mobulu, nazalaki momɛli monene ya makaya, mpe mbala na mbala nazalaki kolala na balabala soki namɛli masanga mpe nalangwe. Nazalaki komɛla bangi, ata mpe kotɛka yango; nazalaki kobomba yango na elamba oyo nazalaki kolata mpo soki babɛti ngai masasi ekɔta ngai na nzoto te. Atako nazalaki komonana mpe kosala makambo lokola moto oyo ayokelaka bato mawa te, nazalaki ntango nyonso kobanga.”

“Mokolo moko, moto moko alakisaki ngai mokapo oyo: ‘Mwana na ngai, kobosana mobeko na ngai te . . . mpo bolai ya mikolo, bambula ya bomoi ná kimya ekobakisamela yo.’ (Masese 3:1, 2) Nazalaki na mposa ya kozala na bomoi molai mpe na kimya! Natángaki mpe maloba oyo: ‘Lokola tozali na bilaka wana, bandeko ya bolingo, tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo, tómonisaka ete tozali kobanga Nzambe.’ (2 Bakorinti 7:1) Yango wana, natikaki komɛla bangi, nakataki boninga na bilenge wana ya mobulu mpe nabandaki kosalela Nzambe.”

“Natiká komɛla bangi esili kolela mbula 17. Nazali nzoto kolɔngɔnɔ, libota na ngai ezali na esengo, nazali na baninga ya malamu mpe na lisosoli ya malamu. Mpe na esika ya kolala na balabala na molangwa, butu nyonso nalalaka na mbeto, na kimya.”

Kotika koyina bato ya mposo mosusu

Mobali moko nkombo na ye Bambang alobi boye: “Ntango nazalaki elenge, nazalaki moto ya mobulu, mpe mingi na bato oyo nazalaki konyokola ezalaki bato ya mwa ekólo moko oyo nazalaki koyina.”

“Kasi, na nsima, nabandaki koluka nayeba Nzambe. Na kolukaluka wana, nakendaki kokɔta na likita moko ya bato oyo bazalaki koyekola Makomami Mosantu. Kuna, bato ya ekólo oyo nazalaki koyina bayambaki ngai na esengo mpenza! Namonaki mpe ete bato yango bazalaki bato ya mposo ndenge na ndenge mpe bayanganaki esika moko na kimya mpe na esengo. Nakamwaki mingi! Na nsima, nayaki koyeba mokapo oyo elobi ete: ‘Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.’”​—Misala 10:34-35.

“Lelo oyo, nayinaka lisusu bato ya bikólo mosusu te. Kutu, baninga na ngai mosusu ya motema bazali bato ya ekólo oyo nazalaki koyina. Na nzela ya Makomami Mosantu, Nzambe ateyi ngai kolinga bato mosusu.”

Lelo oyo, Bambang ayinaka lisusu te bato ya mposo mosusu

Kotika mobulu

Mobali moko nkombo na ye Garoga alobi boye: “Ntango nazalaki elenge, nakɔtaki bolɔkɔ mbala misato: mbala mibale mpo nayibaki, mpe mbala moko mpo nazokisaki moto moko mabe mpenza. Na nsima, nakɔtaki na molɔngɔ ya barebɛlɛ mpe nabomaki bato ebele. Ntango bitumba esilaki, nakómaki mokonzi ya etuluku moko ya bato ya mobulu oyo bazalaki kobɔtɔla bato mbongo. Bato oyo bazalaki kokɛngɛla ngai bazalaki kotambola na ngai bisika nyonso. Nazalaki moto ya mobulu mpe bato nyonso bazalaki kobanga ngai.”

Garoga azali lisusu moto ya mobulu te; akómá moteyi ya Liloba ya Nzambe mpe bato bamemyaka ye

“Kasi mokolo moko, natángaki mokapo oyo: ‘Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. Bolingo ezali na zuwa te, emikumisaka te, emivimbisaka na lolendo te, esalaka makambo ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te, esilikaka te. Ebombaka mabe na motema te.’ (1 Bakorinti 13:4, 5) Maloba wana esimbaki motema na ngai. Nakendaki kofanda epai mosusu, mpe kuna nayekolaki Makomami, mpe nasalelaki toli na yango na bomoi na ngai.

“Nazali lisusu moto ya mobulu te. Nakómá nde moteyi ya Liloba ya Nzambe mpe bato bamemyaka ngai. Bomoi na ngai ebongá mpe ekómá na ntina.”

Liloba ya Nzambe ezali na nguya

Masolo ya bandeko wana mpe bandakisa mosusu ebele emonisi ete “liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.” (Baebre 4:12) Toli na yango ezali ya mindɔndɔ te, ebongi mpenza, mpe elendisaka.

Makomami Mosantu ekoki mpe kosalisa yo? Ɛɛ, ekoki kosalisa yo na mokakatano nyonso oyo okoki kokutana na yango. “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disiplini na boyengebene, mpo moto ya Nzambe akoka mpenza, azala na nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.”​—2 Timote 3:16, 17.

Yango wana, tótalela sikoyo mateya mosusu ya minene oyo ezali na kati ya Makomami Mosantu.