ETENI 9
Yekolá epai ya Masiya Mokambi
NZAMBE asakolaki ete akopona Masiya mpo azala Mokambi ya bato nyonso. Nzambe ayebi mokambi ya ndenge nini tosengeli na ye mpe aponi Mokambi oyo abongi mpenza. Masiya azalaki Mokambi ya ndenge nini? Azalaki nde lokola komanda ya basoda? Lokola moto oyo ayebi makambo ya politiki malamu? Lokola moto ya mayele na filozofi? Makomami emonisi ete Masiya azalaki mosakoli oyo akesanaki na basakoli mosusu nyonso; Masiya yango nde Yesu Kristo.—Matai 23:10.
Nzambe asalaki ete Yesu abotama moto ya kokoka, mosantu. Lisusu, atako Satana asalaki nyonso abebisa ye mpo azala lisusu mosantu te, Yesu alongaki ye. Na maloba mpe na misala, Yesu amonisaki malamu mpenza ete ayebi kosalela nguya ya Nzambe, bosembo na ye, bwanya na ye mpe bolingo na ye. Tótalela mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Yesu.
Asalelaki nguya oyo Nzambe apesá ye mpo na kosalisa basusu. Yesu azalaki mpenza kokipe bato, mpe asalelaki nguya oyo azalaki na yango mpo na kokokisa bamposa na bango. Alobaki boye: “Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa, mpo . . . bazali na eloko ya kolya te.” (Marko 8:2) Na nsima, na ndenge ya likamwisi, aleisaki ebele ya bato oyo bayaki koyoka mateya na ye.
Yesu azalaki mpe kotambola bisika mingi mpo na koteya mpe “kobikisa maladi ya ndenge nyonso mpe mbeba ya ndenge nyonso oyo bato bazalaki na yango na nzoto.” (Matai 4:23) Tokoki kokamwa te soki ebele ya bato bazalaki kolanda ye, mpe “ebele nyonso wana ya bato bazalaki koluka kosimba ye, mpamba te nguya ezalaki kobima ye mpe kobikisa bango nyonso.” (Luka 6:19) Ya solo, Yesu ayaki, “mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28) a Bakambi boni na mokili oyo bandimaka komipimela ndenge wana?
Amonisaki bosembo ya Nzambe. Yesu azalaki kolanda malamumalamu mibeko ya Nzambe mpe kosalela mitinda na yango. Ndenge Makomami esakolaki yango, alobaki ete: “Ee Nzambe na ngai, nasepeli kosala mokano na yo, mpe mobeko na yo ezali na kati na ngai.” (Nzembo 40:8) Na ndakisa ya Nzambe, Yesu azalaki kopona bilongi te, azalaki kopesa bato nyonso limemya, bázala babola to bazwi, basi to mibali, bana mike to mikóló. Mokolo moko, bayekoli ya Yesu bapamelaki baboti oyo bazalaki komema bana na bango epai ya Yesu. Kasi Yesu alobaki ete: “Bótika bana mike báya epai na ngai; bómeka te kopekisa bango, mpo bokonzi ya Nzambe ezali ya bato oyo bazali lokola bango.”—Marko 10:14.
Amonisaki bwanya ya Nzambe. Yesu ayebaki bato malamu mpenza. “Ye moko ayebaki eloko nini ezali na kati ya moto.” (Yoane 2:25) Ntango banguna ya Yesu batindaki bato bákanga ye, ata bato yango balobaki boye: “Naino moto mosusu alobá lokola moto oyo te.” Epai wapi Yesu azwaki bwanya wana? Alimboli boye: “Oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ya moto oyo atindaki ngai.”—Yoane 7:16, 46.
Amonisaki bolingo ya Nzambe. Yesu azalaki mpe koyokela bato mawa. Moto moko Luka 5:12, 13; Marko 1:41, 42) Yesu asepelaki mpenza kosalisa mobola wana oyo azalaki konyokwama.
oyo “atondá na maba” abondelaki ye boye: “Nkolo, soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.” Yesu ayokelaki ye mawa, “asembolaki lobɔkɔ na ye mpe asimbaki ye, mpe alobaki na ye ete: ‘Nalingi. Kómá pɛto.’ Mpe na mbala moko maba na ye elimwaki.” (Yesu akipaka yo? Yesu ye moko ayanoli boye: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba, mpe ngai nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe milimo na bino ekopema.”—Matai 11:28, 29.
Yesu azali Mokambi oyo aleki malamu oyo tosengeli kozala na ye. Yango wana, alendisi biso boye: “Bóyekola epai na ngai.” Okondima libyangi wana ya bolingo? Soki ondimi yango, okozala na bomoi ya esengo.
a Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali lisiko, talá liteya 27 ya buku Sepelá na bomoi libela na libela!